Musique: Emmanuel Kandolo analyse les titres des quelques chansons de la musique congolaise (extraits audio)

Ba ndeko,

Na cadre ya masolo ya ba nzembo, to lobeli mua moke ba nzembo oyo

elandi na nse :

https://youtu.be/GDl5wSYe3y0

1.« MAPEKA», MAVUELA SOMO, YOKA LOKOLE

Nzembo oyo ezali ko viser particulièrement Shungu Wembadio (future papa Wemba) mpe ye moko abomaki nzoto, ayembi yango penza na motema moko. Etonnamment, Wemba azalaki na fuite moko te que nzembo oyo ezali ko cibler ye. En plus, par naïveté, azali komona te que Yoka Lokole ekomaki mouvement ya Mavuela soutenu na bana ya batu ya mbongo.

Mingi bazalaki kofanda na Binza : Jean-Claude Mvuemba, Nzolatima, Ndombasi, Makuambala, Kanga, etc. Goji (na Limete) mpe balingelaki Wemba boule que azali mowuta (non natif de Kinshasa) et esika na ye ezali na mouvement oyo te. Suka suka Mbuta Mashakado Nzolatima ayaki koyebisa ye yango polele en plein concert na bar un, deux, trois mpe ba bengani Wemba d’une manière humiliante na Yoka Lokole. Papa Wemba atikala ko se remettre na likambo oyo te mpe souvent Jean-Claude Mvuemba abandaki ko rappeler ye yango pour le vexer.

2. « EBALE MBONGE », KOFFI OLOMIDE, VIVA LA MUSICA

Ezali  nzembo Koffi akomeli mpe apesi  papa Wemba mpo na ko renforcer ye na mouvement na ye ya sika, Viva la Musica. Wemba azongiseli ba ex-baninga baye ba Yoka Lokole ndimbola na lolenge ba buakisaki ye. D’ailleurs, tango Viva ebandi sika, Mavuela apesa interview mpe a qualifia yango de Chestre (Orchestre ya ndambu, moitié, moitié). Malheureusement mpo na Mavuela, ba prédictions et autres affirmations négatives na ye etiola na ebale mpe Viva esalaki long feu.

3. « MIZOU », BIMI OMBALE, ZAIKO LANGA LANGA

Nzembo Ombale asalela copine na ye, Claudine « Mizou ». Sima relation eyaki kokota mobulu mpo na comportement ya Claudine, na lolenge akendaki kolinga papa Wemba.

4. «NKENI YA BOLINGO», DINDO YOKO, VIVA LA MUSICA

Bien que nzembo ezali ya Dido, kasi contenu na yango ezali message ya papa Wemba envers Claudine « Mizou ». Cette dernière, sachant bien que abimaka na Bimi Ombale, aluka papa Wemba mpe devant batu, juste na entrée ya hôtel Intercontinental (actuel Pullman) de Kinshasa, atelemisa papa Wemba mpe alatisa ye bague ya munene na mosapi. Bien évidemment, papa Wemba azalaki surpris mpo ayebi malamu que Claudine azali nzele ya Ombale. Au lieu asalela sagesse, non, ye andimi ba avances ya Claudine. Wuta wana conflit ekota mpe papa Wemba akomaki kobuakela Ombale : « Yo mutu na libandi, est-ce que ngai nazali na affaire na yo ? ». Tomaki lisusu incomprehension esalemaki na ba répétitions na cité du parti na N’Sele,  mpo na ndule ya célébration ya 17 ans ya Zaiko Langa Langa. Papa Wemba abandaki ko exiger que Bimi abeta batterie na ba nzembo oya abeta avant akoma chanteur.

Soulignons tout de même que Viva oyo ezalaki véritable machine de guerre. A entendre duo de rêve ya Yogo na Wemba, ezali lisusu ko zongisa biso na jeunesse. Voix aiguë oyo Wemba abimisa, ezalakisublime, sans oublier ba belles intonations ya KIsangani.

Na ba années quatre-vingt-dix,  natuna ye soki akoki lisusu ko rééditer exploit wana ? A reconnaissa que ezali difficile. Pour la petite histoire, maladroitement, na kati ya nzembo, Wemba azali ko yebisa Mizou que : « Yeba bolingo na yo e pasoli motema ya Amazone ». Pendant que azali na muasi na ndaku, azali ko yembela makangu na ye que apasoli motema ya mama bana baye. Ebimisa trouble mpe Amazone akanga biloko, akenda comme d’habitude.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo/mbokamosika.com

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Verified by MonsterInsights