Musique: Les origines de quatre chansons  » MBUAKELA « , par Emmanuel Kandolo( récit en lingala)

 «Mayele mabe», Emmanuel Tshilumba wa Baloji, alias

Tino Baroza, African Jazz

Abuakelaki Grand Kallé mpo azalaki maboko makasi mpe difficilement kokokisa ba engagements na ye. Mbongo ezali kokota, ye alingi azala le seul oyo azali ko profiter na yango pendant que na kati wana esengeli ko respecter ba droits ya ba musiciens oyo bazali ko accompagner ye mpe bazali kobimisa ba compositions na bango na Label surboum African Jazz, esika azali patron.

«Obotama mobali», Dalienst Ntesa, Grands

Maquisards

Tango Grands maquisards ekabuanaki, Dalienst a fustigiaki comportement ya baninga, spécialement Diana Spray , n’a lâcheté n’a ye mpe akeyi n’a ye kokota n’a Afrisa international.

 «Nzounguluke», Empompo Lowawe, Tiers Monde

Abuakelaki Franco tango alonguaki na O.K.Jazz na baninga ba ye : Ndombe, Mangwana, Djo Mpoyi na Diatho. Ba envisageaki te kozua ba précautions na oyo etali ba passeports na bango.

Na O.K. Jazz ba passeports nionso avec ou sans visas ezalaka na bureau ya Franco, na immeuble 1, 2, 3.. Tango balongwe, Franco aboyaki kopesa bango ba passeports na bango mpe a bloquer bango na niveau nionso. E compliqua bango mpo na kobima, kokende kobeta na étranger pendant que ba bandaki kozua ba contrats ya production. Suka suka bazongaki na O.K.Jazz mpo moyen mosusu ya kosala ezalaki te.

«Mobali ya ngelele», Jeannot Bombenga, Vox

Africa

Na 1964, Premier Ministre Moïse Tshombe akendaki visite officielle mpe na privée na République Fédérale d’Allemagne. Tshombe akumbaki African Jazz kuna na Allemagne. Sur place, Grand Kallé asalaki commandes, pour son propre compte, ya une voiture Mercedes na VW Combi mpo na transport ya ba instruments. Na molongo, Jeannot Bombenga mpe asengaki na Grand Kallé asombela ye voiture Mercedes mpe abanda kokata ye mbongo ndambu ndambu. Grand Kallé akosi kosi ye tee asombeli ye te. Na kanda wana, yango abuakelaki ye mbuakela na nzembo oyo, tango akeyi kosala mouvement na ye, Vox Africa.

Mbokamosika.com

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *

Verified by MonsterInsights