PORTRAIT DE FRANÇOIS BEYA KASONGA(Version lingala par Léon Kandolo)

Ba ndeko,

Tolingi kaka to pesa mua contribution na biso na bosali mua rectification na maye ba journalistes na ba ndeko misusu ba komi sur trajectoire ya François Beya Kasonga.ADVERTISING

François Beya Kasonga azali muana ya tatu Kasonga Tshiyombo na baba Tshisalu wa Bandubuila. Azali originaire ya région ya Kasaï occidental, sous-région ya Lulua, zone ya Dibaya, collectivité Dibanda, du côté de son père. Na ngambo ya mama, collectivité Dibatayi, toujours  na même zone ya Dibaya.

1. Jean Seti Yale nde azua François Beya  Kasonga na mosala, ezali vrai et faux !  Tshimbombo Mukuna, ancien collaborateur ya Seti na C.N.S., nde a introduisa Beya epayi ya Seti. Ce dernier, azui ye na Cabinet na ye en tant que Secrétaire particulier (privé). Donc, jusque-là, Beya azali ko travailler pour le compte ya C.N.S. te.  Na Cabinet, azali Conseiller te (personnel ya équipe  politique et technique). Au delà, azali ni agent  ni fonctionnaire de l’Etat. A ce titre, Seti, akokaki kozua ye na mosala te.Tango akomaka effectif, ayaka kokoma un des Assistants ya Seti na C.N.S. Akomaka na Collège des Conseillers près le Conseil Nationale de Sécurité. Coordonnateur ya Collège oyo ezalaki, Mbia Magabu. Na même époque, Secrétaire général ya C.N.S. ezalaki Jacob Pelendo Beledu Mawe.

Lisusu, na C.N.S. Coordonateur adjoint azalaka te mpe Conseiller spécial adjoint azalaka te. Secrétaire général ya C.N.S. nde azali numéro deux ya C.N.S.

2. François Beya akoti na Agence Nationale de Documentation (A.N.D.) na eleko oyo Edouard Mokolo wa Mpombo azalaki Administrateur général ya A.N.D (kobanda le 3 novembre 1983 tee na 1er janvier 1985) oyo ekoma Agence Nationale de Renseignements (A.N.R.).  Akoti sur concours ya recrutement, ndenge ebandaki kosalema à l’époque mpo na kokota na ba Grands services publics centralisés de l’Etat. Akoti na A.N.D. na grade ya Inspecteur. Asali na A.N.D.-D.D.I, Sima nde aye kokende na Collège des Conseillers près le Conseil Nationale de Sécurité

Esengeli to yeba qu’Administrateur général ya A.N.D. azuaka mutu na mosala te parce que ba attributions, organisation na cadre ya personnel na yango ezali fixer na Ordonnance ya Président de la République. Personnel ya A.N.D. tout comme ya C.N.S. bazali  soumis na loi n°81-003 du 17 juillet 1981 portant statut du personnel de carrière des services publics de l’Etat (agent et fonctionnaire).

Par ailleurs, Administrateur général akoki kosala proposition na Chef de l’Etat mpo na promotion ya ba cadres lokola : Chef de Bureau, Chef de Division, Responsable Documentation « RE.DOC. » (Directeur de région =Directeur provincial), Administrateur (Directeur) na Administrateur principal (Directeur et Chef de service) ou Administrateur général adjoint (Directeur général adjoint) na cas échéant.

3. Sous Administration ya Mokolo nde Beya asali ba formations na ye na domaine ya Renseignements. Azali moko ya  première promotion etindamaki na Israël, na Shin Beth (Agence ya contre-espionnage  israélien) sima ya reprise ya ba relations diplomatiques entre Zaïre na Israël wuta ekatanaki na 1973 (discours ya Président Mobutu na Nations Unies). Na cadre oyo nde Ngbanda atindamaki na Israël wuta 1982 en tant que Ministre Conseiller.

Na 1983, Israël, endimi accréditation ya Ngbanda comme Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre na Tel-Aviv. Notons toutefois qu’Israël endimaki, contrairement na ba coutumes diplomatiques mpo Ngbanda a occupaki déjà fonction diplomatique inférieure na oyo ya Chef de mission. Bon, Israël azalaki impérativement besoin na reprise ya ba relations diplomatiques, aboyaki ko froisser Zaïre na kolandela convention de Vienne. Ata ko bongo, coopération secrète na matière ya sécurité e contunuaki kati na ba Etats mibale. Beya a kolisa formation na Allemagne tout comme na Etats Unis.

Beya a évoluer sous  Alphonse Goga Lingo, Administrateur général adjoint ya Agence Nationale de Documentation-Département ya Documentation Intérieure (A.N.D-D.D.I.) Président Mobutu a signaki lisusu Ordonnance ya esika oyo eyaki koboma C.N.R.I na S.N.I mpo na ko kela lisusu Centre National de Documentation (C.N.D.), na Ordonnance n°83-193 du 03 novembre 1983. Yango nde ayaki lisusu ko nommer Edouard Mokolo wa Mpombo comme Administrateur général ya C.N.D. mpe assiter na deux adjoints : Goga (C.N.D.-D.D.I.) na André Atundu Liongo, na (C.N.D-D.D.E)

3. Tshimbombo, bien que a salaki na Conseil National de Sécurité (C.N.S.), atikala kozala Conseiller spécial ya Chef de l’Etat en matière de sécurité te. Donc, Beya akokaki kozala Chef de Cabinet na ye te na C.N.S. En revanche, azalaki Conseiller na Cabinet ya Ngbanda, Conseiller spécial du Chef de l’Etat en matière de sécurité. Azalaki mpe collaborateur ya Tshimbombo, Administrateur général ya Service National d’Intelligence et de Protection (S.N.I.P.), Na 1990, A.N.D. ekomi ko bengama : Service National d’Intelligence et de Protection (S.N.I.P.).

Na 1996, S.N.I.P. ekomi ko bengama : Direction Générale de la Sûreté Nationale (D.G.S.N.). Wana nde Tshimbombo akomi ko konza yango tee na chute ya Maréchal Mobutu, le 17 mai 1997.

4. Tango régime ya Maréchal Mobutu ekueyi, Beya akeyi na poto. Célestin Kabuya Lumuna Sando nde a kendaki kozua ye na cadre ya mission M’Zee Laurent Désiré Kabila  a confiaki ye mpo a convaincre ba mobutistes ba zonga na mboka. Na retour, Beya a mettre expérience na ye na service ya Présidence de la République. Azongi R.D.Congo na 1999. Akomi Conseiller na Cabinet ya Conseiller spécial ya Chef de l’Etat en matière de sécurité, Didier Kazadi Nyembo.

Na 12 mars 2001, tango Kazadi akomi Administrateur général ya Agence Nationale de Renseignements (A.N.R.), ekoma ko bengama boye wuta mai 1997, Beya akomi Chef de Cabinet na ye.

Na avril 2001, Beya azui promotion na qualité ya Administrateur général adjoint ya Direction Générale ya Immigration (D.G.M.). Na 2006 nde akomi Administrateur général ya D.G.M.

Na 02 février 2019, akomi Conseiller spécial ya Chef de l’Etat en matière de sécurité. Depuis le 8 février 2022, azali lisusu Conseiller spécial te.

Toujours na masolo ma Beya, banso tomoni lolenge likambo oyo ba kangeli François Beya Kasonga ezali ko kende.  Tee na lelo oyo ba investigations  ezali kosalema. Ba Officiers ya police judiciaire ya A.N.R. ba lekisi délais ya garde à vue en toute impunité. Sima ba kumbi Beya  devant l’Officier du ministère public. Tango akomi na parquet mbala moko etindi ye na détention provisoire sans ko yebisa ye exactement likambo oyo ba zali ko reprocher ye : Akangami mpo na nini ? Nature ya infraction, preuves ou indices oyo ezali ko accabler ye, ba dépositions ya batu oyo ba fundi ou ba dénoncer ye, azali na ba complices ou pas ? Ect.

Même ba avocats na ye ba zali ko loba que dossier ezali vide. Kasi, na nse nse ezali ko lobama que ba zali ko soupçonner ye  na atteinte na sûreté de l’Etat. Selon Code Pénal Congolais, na Décret du 30 janvier 1940 tel que modifié et complété à ce jour na numéro Spécial  ya Journal Officiel ya 30 novembre 2004, ezali ko lakisa biso que infraction ya atteinte na sûreté de l’Etat ezali lolenge mibale :

LIVRE DEUXIEME DES INFRACTIONS ET DE LEUR REPRESSION EN PARTICULIER

TITRE VIII DES ATTEINTES A LA SURETE DE L’ETAT

SECTION I : DES ATTEINTES A LA SURETE EXTERIEURE DE L’ETAT

SECTION II : DES ATTEINTES A LA SURETE INTERIEURE DE L’ETAT

Sika, tozali ko zela, yambo to commenter, justice ayebisa biso nature ya infraction ou ba infractions oyo esali que Beya akangema mpe éventuellement asambisama ?

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo/mbokamisika.com

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *