Site icon SPHYNXRDC

Page d’histoire : le profil d’Augustin Dokolo Sanu par Emmanuel Kandolo(version lingala)

 Augustin DokoloSanu à Cannes en 1962, aux côtés de Lolo Brigida

Ba ndeko,

Lisolo ya Dokolo ezali na site na ye na : www.dokolo.com. Kuna balobeli makambo ebele na oyo etali ba activités na ye mpe balobeli biographie na ye. Ngai awa, nakolobela biographie na ye na lolenge mosusu  sans koluka kobongola masolo ndenge site na ye esali. Na yango, tokolobela vie na ye mpe misala mia ye, ndenge abotami mpe na lolenge ayaki komata mpe tee na suka lolenge ba difficultés eyaki kokanga ye tee na kokende na ye libela epayi na ya ba nkoko.

Augustin Dokolo azali musingombe, abotami na mokolo mua 16 mars 1935 ; na village ya N’Sinzu, territoire ya Tshysville, district ya Moyen Congo na kati ya province ya Léopoldville.  Asali  ba kelasi na ye na école primaire ya  Sainte Thérèse ya N’Sinzu (yango etongamaki na Office des Transports au Congo (O.TRA.CO.) mpo na éducation ya ba bana ya ba employés na ye). Tango asilisi kuna na 1948, a continuaki lisusu kelasi te mpo na kokota na école moyenne ou secondaire. Abandi ko se débrouiller, tee aye kobala na 1955, mademoiselle Marie-Josée Ngabu, oyo baboti na ye bana mibale : Ndona Dokolo, na mokolo mua  28 octobre 1956 na  Léopoldville, mpe na Nkembi Dokolo, na Tsysville , na mokolo mua 15 décembre 1959.

Dokolo awuti na famille moko très modeste. Na Sainte Thérèse wana esika asali école primaire, bana mingi ba tata na bango bazali kosala na O.TRA.CO. Ezalaki cas na ye te. Akoli na ba difficultés, yango wana ekolisaki ye mingi na makanisi mpe ebandaki kolendisa ye mpo akoka ko réussir vie na ye. Contrairement na lolenge site na ye ezali ko présenter biographie na ye, Dokolo atikala kozala propriétaire ya une quelconque société ya taxi te. Avant indépendance mutu moindo ata moko te azalaki na société ya transport. A l’époque, mundele atikelaki mutu muindu azala tenancier ya bar (buvette), ciné, na ba dépanneurs na cité.  Par ailleurs, Dokolo azalaki taximan mpe ayaka kozua voiture oyo abandaki kobula na yango na crédit. Tango wana, soki ozali kosala na compte ya mutu, okoki koyokana na ye atikeli yo voiture mpe na sima ya sanza motoba, ndenge boyokanaki, ozongeli ye na mbongo mpe mutuka etikali ya yo.  Na boyokani wana, chauffeur akobanda kolala na mutuka na disposition na ye 24 sur 24h mpe ko s’organiser na lolenge alingi kosala mpo na kofuta « crédit » epayi na nkolo motuka.  Na époque wana, Masibu, azalaki nde taximan oyo akenda sango na Léopoldville. Grand Kallé na Franco ba immortalisa ye na ba nzembo.

Na 1958, nde tournant eyaki kosalema na vie na Dokolo. Mundele, patron ya Dokolo, azalaki membre ya Rotary Club ya Léopoldville. Pour rappel, Rotary club ekota na Léopoldville na mokolo mua 13 avril 1955. Na 1958 oyo nde Congolais abimisaki Manifeste ya Conscience Africaine, ba évolués ba tombuamaki, ba associations ebandaki ko revendiquer ba changements profonds mpe Belge akosaki ko sentir mupepe ya changement. Notons que Dokolo  akokaki kozala kalaka te mpo atanga ni école moyenne ni école secondaire oyo ekokaki kopesa ye possibilité ya kosala esika ya malonga mpe na éventualité ya lipanda, alingaki kozua ebonga oyo mundele esengelaki atika. Au de-là, université catholique ya Lovanium efonguamaki wuta 1954 mpe na 1958 ebandi kobimisa ba promotions. Na nionso oyo, Dokolo ayebaki malamu que azali penza na ba repères te mpo même soki Congo ekomi lipanda ekozala mua mpasi mpo akoma kalaka mpo azali kosala na compagnie ata  moko te, azali syndicaliste te, azali mpe cadre na association futur parti politique te, bref, avenir ezali mua incertain. Ata ko bongo, Dokolo azalaki fasciner na mode de vie à l’occidental, nionso ebandaki kosepelisa ye mpe azalaki éblouie na ndenge mundele azali ko mener vie na ye. Asali ba efforts na ko  améliorer français na ye na bolandi ba cours du soir, mpe dans la foulée, mundele, patron na ye, azui likanisi ya ko initier ye.

Soki totali na biographie ya Dokolo selon site na ye,  elobi boye : « Récemment interviewé sur Radio France Internationale Manu Dibango raconte que sa carrière a commencé à Léopoldville, non pas avec le musicien Kabasele, mais avec un jeune banquier du nom d’Augustin Dokolo. Avant l’indépendance, il possède déjà une compagnie de taxis et un Dancing réputé. Très attiré par le milieu artistique, il participe au film Les Aventuriers du Kasaï d’Yves Allégret avec Jean Lefebvre et Nicole Courcel qui est présenté au Festival de Cannes 1962. Peu de temps après il développe une chaîne de magasin avec des ramifications à l’étranger…».

C’est étonnant ! Manu Dibango na muasi na ye, ya mundele, Marie-Josée « Coco », bayaka na Léopoldville na proposition ya Grand Kallé. Pour rappel, Grand Kallé ayebanaki na Dibango wuta 1960, na Bruxelles, na Ange noir, boîte oyo Dibango abandaki kobeta miziki.  Bayokanaki wuta Bruxelles mpo asala na  boîte de nuit na ye na kombo ya Negros Afros night club (Afro club). Dibango ayelaki nde boîte. Sima aye ko cumuler na kobeta na African Jazz tango Dr. Nico na ba Déchaud  bakeyi kosala African Jazz aile Nico, na 1961.

Negros Afros night club (Afro club) efonguamaki wuta 1959. Ezalaki na ville sur avenue Général de Gaulle, actuelle avenue du commerce. Coco, molongani ya Dibango, nde azalaki gérante ya nionso : restaurant, boîte mpe na kofuta ba musiciens. Dibango nde azali ko s’occuper na groupe oyo ezalaki kaka ko se produire kuna na kati ya Afro club. Kuna nde ba diplomates étrangers, ba fonctionnaires ya Opération des Nations Unies au Congo (O.N.U.C.), ba expatriés mpe na ba politiciens et nouveaux « riches » congolais babandaki komela, koliya mpe kobina. Soki ye moko patron, Grand Kallé,  aye, de fois  abandaki kosala ba clients na ye plaisir a interpréter nzembo sur demande, souvent ba variétés étrangères.

Coco na Dibango babandi ba activités na Negros Afros night club na octobre 1961. Au bout d’une année nde bakabuanaki na Grand Kallé, na 1962. Na mbula oyo nde bayaki kokutana na Dokolo mpe a proposer bango basala Tam Tam club na même concept ya Negros Afros night club. Malgré kokabuana wana, Dibango a contunuaki kobeta na African Jazz mpe a prendre part na voyage ya Bruxelles mpo na ba  enregistrements ya ba nzembo oyo : «Chérie Coco », «Lolo Brigitte», «Twist à Léopoldville», etc. en plus, tango wana, Dokolo azali banquier te.

Na 1962, nani ayebaki Dokolo na Léopoldville comme banquier? Soki Dokolo akomaki na mua standing, ezalaki mpo patron na ye ya mundele nde atikelaki ye contrôle ya biloko na ye  vue que mindele balonguaki Congo na mbutu mbutu. Yango wana ayako ko se retrouver na ndaku na ville sur avenue avenue Strauch, oyo eyaka kokoma avenue Haut-Zaïre, juste na sima ya avenue du commerce. Tobosana te que na départ précipité ya mindele, ba congolais oyo bazalaki miso makasi bawelaki kokende kofanda mpe ko occuper ba appartements mindele batikaki na ville mpe moyen gouvernement congolais ebengana bango ezalaki te mpo yango moko ezalaki na ba logements sociaux ya ko proposer bango te. Atika bango wana mpe aya kosenga na bango bafutaka ndambo ndambo mpo eya kokoma ya bango . Kasi mingi basala bongo te mpe ba appartements wana etikala ya ba congolais.

Site ya Dokolo elobi lisusu boye : « A l’époque de la rédaction de son recueil, M. Dokolo est déjà propriétaire d’une chaîne de magasins, d’une compagnie de taxis, d’un dancing-bar à Kinshasa (le premier tenu par un nègre), d’une compagnie fiduciaire. Il est aussi opérateur minier, ce aura été le premier nègre à bénéficier de ce type de licence. ».

Dokolo akomi manuel na ye na 1965 tango Congo ekomi lipanda. Ba magasins na ye eyebani te mpo etikala kozala te. Tam Tam club ezalakai dancing ya liboso te ya moto moindo mpo Grand Kallé azalaki déjà na Negros Afros night club (Afro Club) wuta 1959. Tam Tam ezalaki idée ya Dokolo te. Yango ezalaki likanisi ya groupe de Binza mpo yango nde esali Dokolo, ye azali produit ya groupe de Binza. Tomituna, lolenge nini Roger Izeidi ayaki ko se retrouver gerant ya boîte oyo ? N’est-ce pas que Izeyidi azalaki na ba relations particulières na Nendaka ? Nani abungi lolenge African Fiesta Vita ebandaki kobeta epayi ya Nendaka ou encore nzebo ya Rochereau « Sophie Elodie » oyo African Fiesta Vita ebeta, composition ya Rochereau, na mbotama ya muana oyo Victor Nendaka na Astrid Adeline Mbooto baboti ?

Na 1962, Congo ezalaki ya kokabuana kati na batu ya Lumumba (Gouvernement ya Stanleyville) na ba oyo ya Kasa-Vubu na Mobutu (Gouvernement ya Léopoldville). Bakongo bazalaki na détention ya pouvoir économique mpe financier, O.N.U.C. ezalaki wana mpe mindele oyo bazalaki na ba investissements na bango bazalaki contre Lumumba, batu ya Rotary club, etc. Batu oyo banso y compris na ba politiciens collabos esengelaki bazala na bisika ya kokutana na ba milieu wana. Tam Tam ezalaki endroit idéal mpe à l’époque mutu nionso ya cité azalaki na makoki ya koya komela, kolia mpe kobina na ville te. Dokolo, operateur minier avant 1965 ? Na comptoir nini ? Mpo tango wana exploitation minière ezali kosalema kaka na ba sociétés privées étrangères mpe na Etat congolais.

Premier voyage Dokolo na poto ezalaki na 1962, tango ayaki na Cannes na cadre ya présentation ya film ya « Les aventuriers du Kasaï ». Yango eyebani mpe na ba kombo ya « Terreur sur la savane » mpe na ya « Konga yo ». Bien que azalaki figurant, Dokolo afuta billet na ye ye moko mpo azala na kati ya délégation ya Yves Allégret, réalisateur ya film wana.

Sima ya wana,  voyage oyo asalaki na Etat Unis na 1963, Rotary Club nde esimbaki ye na voyage wana ya sanza misatu. Alobela yango na « Congo telema ». Yango nde eyaki kokotisa ye esprit mpe akomaki ko rêver en grand. Awa nde Dokolo azuaki ba financements oyo élançaki ye mpe e permettre ye asala ba fermes na Congo Central.

Certes, voyage ya Etats-Unis epesaki Dokolo ba boules ebele, kasi yango mpe esalaki que azua makoki oyo ezali kowuta na Rotary Club, mpe ndenge akomaki na ba ambitions minene, mpe a mitiyaki na position ya kozala neti interlocuteur entre ba milieux d’affaires na groupe de Binza. Awa nde tournant monene eyaki kosalema na vie na ye. Akomaki un élément essentiel na compte ya groupe de Binza kati na milieu ya ba Kongo mpo na nzela na ye nde groupe de Binza azalaki na but ya ko neutraliser ba entrepreneurs Kongo lokola Nzela Landu, Bonanza, etc. mpo na kotombola ye.

Dokolo, contrairement na ndenge ebanda kolobama banda kala, azali self made man te

(amisali ye moko te, ezali effo perso te). Président Mobutu nde asali Dokolo !!! Sans Président Mobutu nde Dokolo atikala kokoma banquier te. Albert Ndele nde ayaka na Dokolo epayi ya Président Mobutu  wuta groupe de Binza. Tobosana te, na juin 1960, Ndele azalaki chef ya Cabinet ya Ministre ya Finances, Pascal Nkayi (A.BA.KO.), na gouvernement Lumumba mpe na premier coup d’Etat ya Général Mobutu, na septembre 1960, aye kokoma vice-Président ya Collèges des Commissaires Généraux mpe Commissaire Général aux Affaires financières et Questions monétaires.  Na élan oyo nde Ndele, wuta mokolo mua 24 février 1961, akomaki Gouverneur ya Banque Nationale ya Congo.

Wuta lipanda, 30 juin 1960  tee na 18 octobre 1965, ebonga ya Ministre ya finances mpe na Gouverneur ya  Banque Nationale ya Congo (Banque centrale) ezali na maboko ya ba Kongo,  spécialement A.BA.KO. mpe  na groupe de Binza mpo na Gouverneur ya Banque centrale. Na tangi ba Ministres ya finances iye : 

–          Pascal Nkayi, A.BA.KO., gouvernement Lumumba.

–           

–          Pascal Nkay, A.BA.KO., gouvernement Ileo I na II ;

–          Arthur Pinzi, A.BA.KO., gouvernement Adoula I. ;

–          Emmanuel Bamba, A.BA.KO.,  gouvernement Adoula II. ;

–          Dominique Ndinga, A.BA.KO., gouvernement Tshombe ;

–           Albert Ndele, groupe de Binza, a continuaki tee na 1970 kozala Gouverneur ya Banque centrale ya Congo. Na 1970, akomi Ministre d’Etat mpe Ministre ya Finances, na gouvernement Mobutu. Biographie na ye ezali na site na biso oyo.

Nationalisation ya ba entreprises de droit congolais esalemi na 1966 mpe reforme monétaire elandi na 1967. Nionso oyo piloter na Ndele. Sur instruction ya Président Mobutu nde Ndele na ba services na ye ya Banque centrale nde ba créer Banque de Kinshasa, na 1969, mpo na Dokolo. Mpe Banque centrale  epesi kabambi na crédit ya 600. 000 dollars Américains oyo e constitua capital ya Banque de Kinshasa. Sika, Soki Dokolo azalaki na ba affaires ndenge biographie na ye ezali koloba na site na ye, pourquoi esali état ya ba affaires wana te ? Pourquoi Banque centrale epesaki ye kafumba na crédit sans hypothèque? Pourquoi site na ye ezali koloba te raison oyo esalaki que Dokolo akoma banquier mpe mbala moko actionnaire principal na hauteur ya 73% ? Biyanu bizali mpo Banque de Kinshasa nde eyaki kopesa Dokolo opportunité ya ko créer ba sociétés s.a.r.l. nionso oyo batandi na site na ye mpe ezali ko constituer groupe Dokolo.

Création ya Banque de Kinshasa ezali ko faire partie ya ba arnaques oyo peuple Congolais a connaître. Ndele asali Banque de Kinshasa na mbongo ya ba contribuables mpe Banque du Zaïre ezui ba jeunes diplômés na ye mpe e recrutés ba misusu, batindi bango na poto bakende formation mpe na retour ba sopi bango na Banque de Kinshasa. Tango efonguami, ebandi ko s’implanter  na intérieur ya pays na rythme moko effréné : ezali kotonga ba agences, kosomba ba bureaux na rapidité moko incroyable !  Yango nde ezalaki Banque ya ba Commissaires du Peuple (Députés), efongola agence na kati ya Palais de la nation (Assemblée nationale). Ekomaki banque oyo l’Etat abandaki  kofuta batu na ye, batu ya territorial, ba versement ya ba bourses ezalaki koleka kuna, kosala ba transaction na ba prives,  etc. Ba sensibilisa batu  batiya ba dépôts na bangu kuna sous prétexte que yango ezali banque ya muana mboka.

Banque de Kinshasa « B.K. s.a.r.l. », esalemi na mokolo mua  le 17 décembre 1969. Inauguration na yango esalemi en grande pompe na mokolo mua 20 novembre 1970 mpe na mokolo mua 4 décembre 1970, yango efunguami mpo na batu banso. Dokolo, actionnaire majoritaire na hauteur ya 73 % ya ba parts mpe 23% ekabuani na ba associés sambo. 

Na 1971, Dokolo Samu, akomi mbala moko Président ya Fédération Nationale ya Chambre de commerce, d’industrie et d’agriculture ya Zaïre, futur Association Nationale des Entreprises du Zaïre (A.NE.ZA.). Rapidement, na même année 1971, Dokolo a créer La Compagnie Financière de Kinshasa (SO.FI.KI.) mpe a céder yango 21% ya ba parts na ye. Société oyo nde ezalaki en réalité chargée ya kosala ba montages financiers et autres études na but ya ko financier ba projets mpe ko convaincre Banque de Kinshasa na opportunité ya kopambola yango. En réalité, ezali kaka Dokolo ye moko nde azali ko décider na kati ya SO.FI.KI. mpe na Banque de Kinshasa. Ba sociétés nionso oyo ezalaki ya Dokolo (ba détails ezali na site ya Dokolo) : La Fiduciaire de Gestion (FIGES), La Société Zaïroise d’Exportation (SO.ZA.DEX.),  La Société Kinoise d’Equipement Technique (SO.KI.DE.T.), La Compagnie d’Exploitation de Mines (CO.DE.MINES.), Transport des Marchandises et des Biens (T.M.B.), La Fishing Trading Company (FI.TRA.CO.), Entreprise de livraison des véhicules au Zaïre (E.L.VE. ZAIRE), La Distribution des cars (DISTRI.CARS.), Ferme de la Lukaya, Domaine de Mbali,  LAGEDIM, AGAR, mpe na OMNIZA.

Dokolo amati na puissance grave mpo na zaïrianisation, na 1973, ba pesa ye Union des Brasserie-Société Zaïroise A Responsabilité Limitée (UNI.BRA.-S.Z.A.R.L.)  en tant que Président-Directeur général na Brasseries, Limonaderies et Malteries du Zaïre (BRA.LI.MA.) kuna mpe akomaki Président-Directeur général mpe abandi ko gérer yango nionso mibale tee na rétrocession na 1974. Nani akokaki kokoma patron ya UNI.BRA.-S.Z.A.R.L. na BRA.LI.MA. soki azali na lipamboli ya Président Mobutu te ? Esalema te, ba brasseries minene ndenge wana, bapesi yango na mutu moko.

Tango Banque de Kinshasa esalemaki, balobelaki yango mingi na bakonzi mpe na presse. Dokolo abandi ko gérer banque wana ye moko mpe  asali  ba sociétés holding. Ba sociétés wana mpo esalema esengelaki ezala na capital. Mpo na yango, edefaki mbongo na Banque de Kinshasa. Or, na Banque de Kinshasa, Dokolo nde azali actionnaire majoritaire mpe ye moko nde azali kozua ba décisions minene kuna yango wana ezalaki facile mpo adefisa ba sociétés ye moko asalaki , mbongo sans garantie.

Ba sociétés wana, na mikanda ezalaki na kombo ya Dokolo te, ezalaki na kombo ya bana na ye  tango wana bango banso bazalaki naino bana mike, Dokolo azalaki nde ko représenter groupe Dokolo oyo yango ezalaki na 15 sociétés mpe ba sociétés wana officiellement ye te mutu azalaki patron na yango, abandaki kaka ko sunga bana na gestion. Bana oyo bazalaki na mbula nini ? Na libala na Hanne Taabbel Kruse, Dokolo aboti bana misatu:  Manzanza Dokolo, abotami na 1970, Sindika Dokolo, na 1972, mpe Luzolo Dokolo na 1974. Bango na ba kulutu na bango mibale natangi na likolo nde bazalaki ba associés ya ba sociétés nionso Dokolo ye moko azali  ko gérer  na ndenge na ye, c’est-à-dire sans souci ya véritable gestion oyo mutu nionso oyo azali na ba capacités  technique, éthique et déontologique ya profession ya banquier. 

Donc, Dokolo azalaki na niongo ya Banque du Zaïre mpo yango nde edefisaki ye mbongo mpo asala Banque de Kinshasa. Tango asali Banque de Kinshasa, yango mpe edefisi mbongo mpo  bana na ye oyo bazalaki mike, basala ba sociétés oyo eyaki ko constituer groupe Dokolo. En réalité, na commande ya Banque de Kinshasa na ba sociétés 15 ya groupe Dokolo, ye moko Dokolo nde azalaki na manœuvre mpe azalaki kozua ba décisions nionso wana. Ezalaki facile mpo  asakana na mbongo ya batu oyo ezalaki na Banque de Kinshasa mpe kodefisa yango na ba sociétés ya groupe Dokolo  na ba taux défiants toute concurrence mpe mbongo yango, ba  sociétés ya groupe Dokolo ebandaki kozongisa yango te mpo ezalaki ko kipe te ko rembourser ba emprunts na yango, Banque de Kinshasa ebandaki kolandela ba sociétés wana te ndenge banque nionso esengeli esala soki personne physique ou morale azali ko respecter ba engagements azuaki te tango andimaki prêt ou crédit. Na spirale wana nde abandaki ko fonctionner. Or,  mbongo oyo ezalaki na Banque de Kinshasa ezalaki mpongo ya ngana : Restriction ya crédit ezali te mpo na ba sociétés na ye (ya bana na ye). Sans kozua ba  mesures de précaution, azali ko activer progression ya endettement na ba taux d’intérêt trop faible mpe kopesa ba rééchelonnement ya niongo. Yango wana , tango économie modiale ekutanaki na crise ya pétrole, baisse ya prix ya cuivre na marché international mpe ba mesures internes ya zaïrianisation, démonétisation, Banque de Kinshasa ekomaki terriblement secouée tee na ndenge eyaki ko s’effondre.

Dokolo ayebaki lolenge abandaki kosala ba manipulations financières frauduleuses na ye. Yango wana aliaki avance mpe azalaki déjà na société ya financement na kati ya groupe na ye. Démonstration esalemaki tango  Banque de Kinshasa ekueyi mpo ezalaki lisusu na mbongo te mpe neti Banque du Zaïre ebandaki mpe kolandela mbongo na ye,  CO.FI.KI. eyaki kosala évaluation ya  ba immeubles nionso oyo  Banque de Kinshasa ezalaki na yango. Wana mpe emonanaki que évaluation wana ezalaki penza na lolenge malamu te mpo neti immeuble Dungu ezalaki  oyo ezalaki siège ya direction générale ya Banque de Kinshasa ezalaki  mpe sujet ya kobendana mpo yango esengamaki na Société Financière de Développement (SO.FI.DE.) mpo Dokolo ye moko apesaki yango na hypothèque mpo adefa mbongo kuna, kasi eyaki komonana  que expertise oyo esalemaki na CO.FI.KI. epesaki yango valeur ya likolo mpe esengelaki Dokolo abakisa lisusu mbongo. Na yango, SO.FI.DE. ayaki kotekela yango Société Zaïroise des Banques  (SOZA.BANQUE.) mpe yango e récupérer mbongo na yango.

Ba difficultés financières ya Dokolo eyaki kosala que ye a céder ba actions na ye majoritaire na hauteur ya 52 % mpo na kofuta niongo na Banque du Zaïre. Sima ya wana, likambo eyako ki komoma politique mpe na lolenge Conseil exécutif ezuaki mokano na mokolo mua  10 février 1986, etie Banque de Kinshasa kati na gestion administrative ya Banque du Zaïre. Président Mobutu a signer ordonnance présidentielle n°86/164 ya 3 juin 1986 oyo eboti Nouvelle Banque de Kinshasa mpe na ordonnance présidentielle n°86/176 ya 26 juin 1986 modifiant et complétant ordonnance n°86/164 du 3 juin 1986, epesi ba biens nionso : meubles, immeubles, droits na obligation ya Banque de Kinshasa na banque ya sika ya l’Etat na kombo ya Nouvelle Banque de Kinshasa. Yango ekomaki gérer na Union Nationale des Travailleurs du Zaïre (U.N.T.ZA.) ba fonctionnaires mingi oyo bazalaki na ba comptes kuna, mbongo na bango ezinda. Mbala ya liboso tomona syndicat ekomi gestionnaire ya banque. Esengeli kobakisa que ordonnance mibale oyo esalaki polémique pamba te e respectaki loi bancaire te mpo neti réorganisation ya Banque de Kinshasa esimbaki te, esengelaki liquidation judiciaire na yango esalema na délais ya sanza misatu. Manœuvre oyo ezalaki ya kokimisa Dokolo face na ba responsabilités na ye, mpo soki balandeli makambo ndenge esengeli, alingaki akota banque route mpe asala boloko. Kasi, a niefuka grâce na Président Mobutu mpe akomi komonana  na U.D.P.S. ye mutu alobaki alingaka politique te.

Niongo ya Dokolo, actionnaire majoritaire ya Banque de Kinshasa,  vis-à-vis na Banque du Zaïre, ndenge eyebanaki polele ezalaki ya 32 millions de dollars Américains, soit 1.600.000.000 de Zaïres, wana na 1985.

Niongo ya Groupe Dokolo, esika Dokolo azalaki responsable non statutaire mpe bana na ye ba associés, yango ezalaki ya de 33 millions de dollars Américains (33.202.748,39), soit 1.670.137.419,45 Zaïres, na 1985. Oyo ezali ba niongo oyo bana ya Dokolo esengeli ba futa. Na moyi ya lelo, na 2018, ekosala ba dollars Américains boni?

Na mindondo oyo, nionso, Dokolo akima paisiblement, mpo azalaki na protection ya ba konzi. Akenda kofanda na Paris en toute impunité, tee na tango abandi ko landa traitement na bokono azalaki na yango mpe ememi ye na liwa na mokolo mua e 12 avril 2001.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Quitter la version mobile