Par Messager
Couverture de l’article « FACE À FACE ANDRÉ BOBOLIKO-LUCIE EYENGA »
Comme promis au seuil de cette année, nous avons exhumé un commentaire rédigé en 2010 par un mbokatier concernant la rencontre entre la chanteuse Lucie Eyenga et l’ancien Premier Commissaire d’Etat André Boboliko. Nous nous sommes donné la peine de le traduire pour nos amis mbokatiers ne parlant pas lingala.
Mua Lisolo
Mama Lucie Eyenga Moseka,
Lisolo nalingi nabola, ezali mpo na Mama Lucie Eyenga, ezalaki juste na tangu oyo vieux Bo-Boliko Lokonga Andre azalaki bongo premier ministre to Premier Commissaire d’Etat, sous le regime ya vieux Seskoul, bongo vieux Ngunza Karl i Bond azalaki Commissaire d’Etat aux affaires Erangeres.
Le récit que je voudrais vous proposer concerne maman Lucie Eyenga. Elle a eu lieu à l’époque où le citoyen André Boboliko fut Premier ministre ou Premier Commissaire d’État, soit entre (1979-1980), sous le régime Mobutu, avec Nguza a Karl I Bond aux Affaires étrangères.
Alors Mère Lucie Eyenga asali tout akutani na vieux Ngunza, basololi alors vieux Karl i Bond ayebisi Mama Lucie Eyenga ekozala malamu okutana na mokonzi na biso to Premier Commissaire d’Etat Bo-Boliko. Courageuse et sportive, Mama Eyenga akueyi na Primature kosenga audience, nzambealalaka te, tangu azali ko remplir fiche ya demande d’audience vieux André Bo-boliko mpe azali kokota na bureau, ayebisi na batu ya Protocole bakotisa Citoyenne Eyenga.
Ainsi, la maman Lucie Eyenga fera tout pour rencontrer le Commissaire d’État aux Affaires étrangères, le citoyen Ngunza. À l’issue de leur entretien, Ngunza proposera à Lucie Eyenga de contacter le Premier ministre Ândré Boboliko. Sans tarder, Lucie Eyenga prit son courage entre les mains et se rendit au bureau de Boboliko. Heureuse coïncidence, au moment où elle remplissait la feuille d’audience, Boboliko arriva et ordonnera au service de Protocole d’accompagner Lucie Eyenga dans son bureau.
Sikoyo tête-à-tête Bo-boliko / Lucie Eyenga na bureau ya Premier Commissaire d’Etat. D’entrée de jeu, Mama Lucie Eyenga abandi koloba, alobi Papa Andele, biso tozali bandeko na bino ya Basi, lelo Nkolo Nzambe asungi bino, bokomi na esika oyo, na mokili Nzambe apesaka motu na motu chance na ye mpe na tangu na ye. Ngai ndeko na yo Citoyenne Eyenga mosala natikali na yango kaka membre ya ba Nkolo Miziki, tobetaka kaka na Emission Ba Nkolo Miziki ya Mama Angebi na Kanzaku, à part wana, nazali lisusu na mosala mosusu nasalaka te, mbula mpe epusani, bongo Papa Andele ngai nayebi epayi nini lisusu nakende kolela te, nakutanaki na ndeko na biso Citoyen Ngunza Karl i Bond, asepelisaki ngai na ndenge mpe ya malamu, kasi ye nde motu alobaki na ngai nasala nionso mpo namona yo. Papa Andele Bo-boliko kanisa lisusu tangu biso ba oyo, tozalaki koningisa Kinshasa mpe Congo-Mobimba na Afrique.
Premier Commissaire d’Etat Bo-boliko atuni Mama Lucie eloko nini ye akoki lisusu kosala, to mosala nini oyo ye alingi bapesa ye, alors Mama Lucie Eyenga ayebisi vieux Bo-boliko, nazali na projet, nabimisa ba nzembo na ngai ya kala, mpo na yango nakozala na besoin ya financement.
Une fois au bureau et en face du Premier Commissaire d’État Boboliko, Lucie Eyenga prit la parole en ces termes : papa André, nous sommes vos sœurs. Dieu vous a bénis en vous élevant au rang que vous occupez aujourd’hui , selon votre destiné.
Moi votre sœur tout ce qui me reste c’est l’appartenance au groupe des anciennes gloires de la musique congolaise et la participation aux concerts éphémères réservés aux personnes du 3è âge. Je n’ai plus d’autres activités et je suis déjà âgée. Je ne sais plus auprès de qui je dois me plaindre. J’ai rencontré le Commissaire d’état Ngunza, il m’a bien accueillie et m’a suggéré de vous soumettre mes doléances. Voilà pourquoi je suis venue vous voir. Avez-vous oublié comment nous avons fait danser le Congo et toute l’Afrique ?
Sur ce, André Boboliko demanda à Lucie Eyenga : « que peut-on faire pour vous, ou quel projet voudriez-vous réaliser ? » Eyenga répondit que son projet consiste à rééditer ses anciennes œuvres, mais ceci nécessite un financement.
Sans problème, vieux Bo-boliko a remettre chèque ya 40.000 Zaires (quarante mille zaires) na Mama Lucie Eyenga, émis au nom de la sociéte MAZADIS, usine de fabrication des disques phonographiques
à Kinshasa-Limete RDC.
Sans tergiverser, Boboliko remet un chèque de 40.000 Zäires à Lucie Eyenga, émis au nom de la société MAZADIS (Usine de fabrication des disques phonographiques), située à Kinshasa Limete.
Apres wana, Mama Lucie Eyenga atiki premier Commissaire d’Etat, mpe apesi ye merci mingi, na nzela Mama Lucie abeti maboko mpe atali na likolo, asengi na Nkolo Nzambe abenisa Citoyen Ngunza Karl i Bond mpe asunga ye na misala mia ye minso.
Après ce geste, Lucie Eyenga quitte le Premier Commissaire d’Etat après lui avoir exprimé sa profonde gratitude. Sur son chemin de retour, elle va intercéder auprès de Dieu en faveur de Ngunza Kark I Bond qui lui a permis le contact avec Boboliko.
Lobi na yango ye wana Lucie Eyenga aye na usine Mazadis, apesi commande ya 25 disques ya 45 tours, soit 25 x 2 zaires = 50 zaires. Na sima a remettre chèque ya 40.000 Zaires na Mazadis. 3 jours après, Mama Lucie aye kozua 25 disques na ye, entre-temps, usine Mazadis atikaki déjà chèque na Banque mpe mbongo ekoti na compte ya Mazadis, tozali na tango oyo ya effets négatifs ya zairianisation, ba matières premières ezali lisusu te, ekomi kaka ba vieux disques babuka yango mpe basala ba disques ya sika, yango esalaki ete Mama Lucie Eyenga azua raison ya ko commander mua nombre ya ba disques moke, mpe usine ya Mazadis ekomaki ko tourner 2 jours par semaine.
Le lendemain, Lucie Eyenga se présente à l’usine Mazadis et passe une commande de 25 disques 45 tours, représentant 25 x 2 zaïres = 50 Zaïres. Ensuite, elle remet un chèque de 40.000 Zaïres. Trois jours après, elle revient retirer 25 disques. Entre temps, l’usine Mazadis avait déjà fait encaisser le montant auprès de sa Banque. C’était l’époque de la Zaïrianisation et ses effets pervers, entraînant la rareté des matières premières dans la fabrication des disques et la réduction drastique de la production et du temps de travail ( L’usine tournait deux jours par semaine).
Une semaine après, Mama Lucie Eyenga aye na Mazadis alobi sur les 25 disques oyo ye a commandaki, atekisi kaka 2 disques (mibale), alors ekozala malamu Mazadis apesa ye mbongo na ye soit 40.000
zaires – 50 zaires soit 39.950 zaires ya différence, mpo asala misala misusu na mbongo wana.
Une semaine après, Lucie Eyenga revient à l’usine Mazadis et déclare que sur les 25 disques commandés, ele n’a réussi à vendre que deux disques. Par conséquent, elle souhaite que Mazadis lui restitue la somme de 40.000 Zaïres, moins 50 Zaïres, soit 39.950 Zaïres, afin qu’elle l’utilise autrement.
Directeur-General ya Mazadis azalaki portugais, Mr. Neves, mpe Directeur-Administratif congolais, Papa Luambo L’Okanga, père ya Djo Issa ya Stukas, ekomi problème, portugais oyo alingi te, ekomi ya tembe. Mama Lucie Eyenga alobi na Papa Luambo, est-ce que Bo-boliko azali Premier ministre ya Portugal to ya Zaire, soki azali ya Zaire, tokotala nani akolonga. Na maloba oyo, Papa Luambo ayebisi M. Neves, ekozala malamu apesa Mama Lucie Eyenga mbongo na ye, lokola mpe na ba banque mpo na ko retirer ba grosses sommes, il faut préavis, bapesi Mama Lucie Eyenga promesse aya kozua mbongo na ye na jour tel.
Le Directeur général de Mazadis était Mr Neves, et le Directeur administratif le citoyen Luambo L’Okonga, prère du musicien Djo Issa de Stukas. Suite au refus du Directeur général, Lucie Eyenga se fâche et s’adresse à l’endroit du citoyen Luambo L’Okonga en ces termes : « est-ce-que Boboliko est Premier Commissaire d’état du Portugal ou du Zaïre ? S’il est Premier Commissaire d’état du Zaïre, on verra qui l’emportera ». Suite à cette menace, Luambo L’Okanga conseilla à son Directeur général de lui resituer son argent. Ainsi, une promesse sera faite à Lucie Eyenga de pouvoir retirer son argent, après un certain délai, vu l’importance de la somme.
Entretemps, na ba ventes cash, mbongo ya Mama Lucie ekoki, mpe batindi chauffeur ya Mazadis akende kozua ye na ndaku na ye, ba remettre Mama Lucie Eyenga 39.950 zaires, asimbi nzela akeyi na ye.
Alobi na batu ya Mazadis oyo alingi aya na ndaku epayi na ye, mpo na ko remercier batu nionso ya Mazadis na intervention oyo Papa Luambo asalaki mpo M. Neves azongisela ye mbongo, sans pour autant apesa batu ya Mazadis adresse na l’heure oyo bakoya epayi na ye.
Après la vente de quelques disques, Mazadis réunit la somme due à Lucie Eyenga et l’invita à venir retirer son argent, soit 39.950 Zaïres. Satisfaite, elle lança une invitation à tout employé de Mazadis qui le voudrait, à venir à son domicile, en guise de remerciement suite à l’intervention du citoyen Luambo L’Okonga.
Ainsi va la vie…
Mua Lisolo.
Tiré de mbokamosika.com