Musique :traduction de la chanson « Ba gérants ya mabala »( illustration audio)

Navandi motema ekobeta e namituni tina a mama

Je suis chez moi, j’ai des palpitations et je me demande pourquoi

Natali na kati ya famille mobimba likambo lizali te ooo

Je vérifie dans toute ma famille et il n’y a rien pour justifier une quelconque prémonition

Nayebi baleki ya mobali ko bayina ngai mabe

Je sais que les jeunes frères et sœurs de mon mari ne m’aiment pas du tout

Batila ngai mitambo epayi nyonso po bazwa ngai na mitifs

Ils s’acharnent à me tendre des pièges partout pour qu’ils m’attrapent en infractions

Kobala mobali atonda mosolo nakanisaki ezali paradis

Je croyais qu’épouser un richard équivalait à un paradis

Ekoma nga na ndako nini makambo namoni te ooo

Arrivée au foyer, quels problèmes n’ai-je pas endurés !

Bolingo na nga na mobali na nga ezali nzoka na bagérants

Ma relation avec mon mari est donc gérée par d’autres personnes

Nasenga eloko epayi ya mobali moto mosusu apesa ngai eyano

Quand je demande quelque chose à mon époux, la réponse vient de quelqu’un d’autre

Nakokoka te Nzambe

Je ne parviendrai pas (à supporter tout ceci), mon Dieu!

Nga nakokoka te ooo Nzambe

Moi, je ne parviendrai pas, oh! mon Dieu !

Libala nakota nalanda bomengo namoni na miso o

Ayant contracté le mariage à la poursuite de la richesse, j’ai vu de mes propres yeux

Mobali mosolo na bandeko na ye bakomi nde kogérer nga

Le mari, l’argent et les membres de sa famille se mettent à me gérer

Nakokoka te eee Nzambe

Je ne parviendrai pas (à supporter tout ceci), mon Dieu!

Ngai nakokoka te oooo Nzambe

Moi, je ne parviendrai pas, oh! mon Dieu !

Na bato ya mosala ya mobali bazali kokata nga mangala

Même les travailleurs de mon mari me répondent insolemment

Lokumu na nga ya mwasi ya moto ezali nde wapi ee

Où est mon honneur en tant qu’épouse ?

Nakokoka te e nalembi

Je ne parviendrai pas ; j’en ai assez

Bandeko mobali na bato na ye bati ngai panzi likolo

Les membres de la famille du mari et ses employés me harcèlent

Mobali ameka ata kolobisa ngai bango nyonso bakangi bilongi

Si le mari essaie de m’adresser la parole, tous froncent les sourcils

Mobali alingi ngai na motema nazali komona e

Le mari m’aime de tout son cœur ; ça je le sens

Bafamille na ye badominer ye

Il est pourtant sous l’influence des membres de sa famille

Bato ya mosala bakocommander

Et ses travailleurs donnent des ordres

Navandi motema ekomi kopela mawa ya mobali na nga

Quand j’y réfléchis, mon cœur est en flammes ; je suis triste pour mon mari

Asala likambo oyo alingi te bagérants na nzoto baleki

Il agit contre son gré puisqu’il y a trop de gérants autour de lui

Mobali na nga moninga moto e nalingi yo mingi e e

Mon mari, cher ami, je t’aime beaucoup

Mobali na nga moninga moto e bagérants na libala naboyi

Mon mari, cher ami, je n’accepte pas ces gérants dans notre foyer

Nakokoka te Nzambe

Je ne parviendrai pas (à supporter tout ceci), mon Dieu!

Nga nakokoka te ooo Nzambe

Moi, je ne parviendrai pas, oh! mon Dieu !

Libala nakota nalanda bomengo namoni na miso o

Ayant contracté le mariage à la poursuite de la richesse, j’ai vu de mes propres yeux

Mobali mosolo na bandeko na ye bakomi nde kogérer nga

Le mari, l’argent et les membres de sa famille se mettent à me gérer

Nakokoka te eee Nzambe

Je ne parviendrai pas (à supporter tout ceci), mon Dieu!

Ngai nakokoka te ooo Nzambe

Moi, je ne parviendrai pas, oh! mon Dieu !

Na bato ya mosala ya mobali bazali kokata nga mangala

Même les travailleurs de mon mari me répondent insolemment

Lokumu na nga ya mwasi ya moto ezali nde wapi ee

Où est mon honneur en tant qu’épouse ?

Nakokoka te e nalembi

Je ne parviendrai pas ; j’en ai assez

(Les deux strophes ci-dessus sont le refrain et sont répétées trois fois)

Nakokoka te Nzambe

Je ne parviendrai pas (à supporter tout ceci), mon Dieu!

Nga nakokoka te ooo Nzambe

Moi, je ne parviendrai pas, oh! mon Dieu !

Nakokoka te e nalembi

Je ne parviendrai pas ; j’en ai assez!

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *