LISOLO YA TELEPHONIE CELLULAIRE (TELE.CEL.) NA MIKO, PAR E. KANDOLO(version lingala)

Didier Miko Rwayitare (source de la photo: Freddy Mulongo, Réveil FM)

Ba ndeko,

Lelo tokomeka kobeta liso ya Téléphonie Cellulaire (TELE.CEL.) na Miko, oyo ayebanaki  na domaine ya télécommunication tee na ndenge bayembaki ye na ba nzembo.

Didier Miko Rwayitare, abotami na mokolo mua 02 décembre 1942 na ville ya Gisenyi, na Rwanda. Azali d’origine rwandaise, précisément na province ya Gisenyi (lelo ekoma secteur ya province de l’Ouest wuta réforme territoriale et administrative ya 2012). Gisenyi ezali ville rwandaise proche ya Goma. Miko abandi école primaire na ye na 1948, na Gisenyi, mpe na 1954, akeyi ko continuer yango na Collège Jésuites du Saint Esprit ya Bujumbura. Na 1958, atangi  mpe asilisi na Collège Notre Dame de la Victoire ya Costermansville (oyo ekoma : Collège Alfajiri de Bukavu) na 1960. Entre-temps, famille ya Miko ekomaki installer na Congo-Léopoldville  suite na instabilité politique oyo eyaki komema guerre civile na 1959, na Rwanda.

Tango  Miko asilisi ba humanités na ye, ba Frères jésuites ya Collège Notre Dame de la Victoire ya Costermansville basungi ye mpe bazuili ye bourse d’études  akende kotanga na Suisse, na École polytechnique fédérale ya Zurich. Kuna asali préparatoire mpe tango asilisi, au lieu a continuer na génie électrique, a changer, akeyi kotanga allemand pendant mbula mibale mpe akati ba études na faculté ya polytechnique ya Zurich mpo a s’installer na Allemagne, na Karlsruhe. Miko ayaka na bourse ya Suisse. Neti azalaki réfugié na Congo-Léopoldville, a gardaki statut na ye conformément na convention ya Genève ya 28 juillet 1951, mpo na ba réfugiés. A s’installer na Allemagne en qualité ya réfugié na sens ya convention mpo azuaki statut wana wuta na Congo-Léopoldville. Neti azalaki lisusu na bourse te, esengelaki aluka mosala mpo afuta ba études na ye dès lors que ye moko nde akataki ba études oyo bourse Suisse ebandaki kofutela ye. Suka suka tangu akomaki prêt, akotisi dossier na Karlsruher Institut für Technologie (Institut de Technologie de Karlsruhe) mpe andimami kuna. Ayekoli kuna pendant mbula mine kasi azalaki kokatakata, kosala mosala mpo akangisa mbongo, sima azongeli kelasi, tee na ndenge ayaka kosilisa  na 1972, akomi ingénieur civil na électrotechnique (ingénieur électricien).

Barthélemy Bisengimana (source de la photo: Freddy Mulongo,Réveil FM)

Miko azalaki vraiment na boule ya kozonga na Zaïre mbala moko te. Mutu oyo a motivaki ye mpo azonga na Zaïre ezali Barthélemy Bisengimana Rwema (biographie na ye ezali na site na biso oyo na sujet intitulé : Barthélemy Bisengimana Rwema, ya 19 Novembre 2008). Tobunga te qu’à chaque fois soki Bisengimana akomi na pays moko pour la première fois, abandaki toujours kosala recherche ya ba Rwandais réfugiés politiques oyo bazali na pays wana mpe a sélectionner pour la plupart ba Tutsi mpo baya na Zaïre esika abandaki ko offrir bango ba opportunités ya carrière professionnelle ya malonga. Likanisi wana eyaki komona polele tango a réussir ko persuader Président Mobutu a signer Ordonnance na 1971, oyo epesaki nationalité zaïroise  na ba ressortissants Rwandais nionso oyo bazalaki na Zaïre avant lipanda.

Kobanda na  mai 1969 tee na février 1977, Bisengimana azalaki Directeur ya Bureau ya Président de la République na Ordonnance nº 69-096 ya 8 mai 1969. Ordonnance-loi nº 71-020 ya 26 mars 1971, yango  ezali kopesa nationalité Congolaise collectivement na ba oyo bazali originaires ya ba anciens territoires sous tutelle Rwanda-Urundi établis na mabele ya République Démocratique du Congo avant le, 1er juillet 1950, et qui ont continuer à résider depuis lors na R.D.Congo.

Sima, Président ayaki ko promulguer loi oyo Assemblée nationale ya Zaïre adopter, na Ordonnance-loi nº 72-002 ya 5 janvier 1972.  Elobi boye na article ya liboso : Il existe une nationalité zaïroise. Sont Zaïrois au terme de l’article 5 de la Constitution à la date du 30 juin 1960, toutes les personnes dont un des ascendants est ou a été membre d’une des tribus établies sur le territoire de la République du Zaïre dans ses limites du 15 novembre 1908 et, telles que modifiées par les conventions ultérieures (tobeta lisolo oyo na site na biso oyo na ba détailles nionso na sujet : A propos des banyamulenge, ya 22 novembre 2008).

Soki tozali de fois kolobela Congo-Léopldville, R.D.Congo na Zaïre ezali suite na ba changements ya ba kombo selon : la Loi fondamentale sur la structure de l’État du Congo belge, ya 19 mai 1960 ; Constitution de la République Démocratique du Congo, ya 1er août 1964 ; na Décision du Bureau Politique  du Mouvement Populaire de la Révolution nº 71/009 ya 27 octobre 1971 relative aux trois Z.(Zaïre notre pays, Zaïre notre fleuve, Zaïre notre monnaie).

Soki tozali kolobela Bisengimana, ezali mpe mpo na kolakisa que ye amikomisaki na ebonga wana pamba te. Ba missions sécrètes  Général Mobutu a confia ye nde esala que a « mériter » ba promotions tee kokoma pembeni na ye.  Akomi wana na manœuvre moko boye te ! Mokonzi na biso moko nde atiaki ye wana !!!  Tobunga te que tango azalaki na dernière année na département ya génie électrique ya faculté ya polytechnique ya université ya Lovanium, groupe de Binza ezuaki pouvoir mpe e installer gouvernement ebengami : Collège ya ba Commissaires généraux, kobanda 20 septembre 1960 tee na 9 février 1961. Esengaki ye a accompagner Victor Nendaka, Administrateur ya Sûreté nationale, na janvier 1961, na Bukavu,  mpo na ko neutraliser  Anicet Kashamura tango azuaki bokonzi na  province ya Kivu  na kombo ya gouvernement ya Stanleyville, diriger na Antoine Gizenga. Na yango, esengelaki mutu ya confiance lokola Bisengimana, bientôt ingénieur civil électricien, mpo a superviser opération nionso technique ya kokata courant na ville ya Bukavu mpo na molili wana Nendaka na batu na ye bakanga Kashamura. Heureusement, mpo na Kashamura, amikimelaki avant batia ye maboko. Na époque oyo, Prospère Madrandel (Madrandel Tanzi) nde azalaki P.D.G. ya Régie de Distribution d’Eau et d’Electricité du Congo.

Lisusu, na butu ya 24-25 novembre 1965, groupe de Binza na Haut commandement militaire e confiaki Bisengimana mission ya ko isoler R.D.Congo na reste du monde na bokati communication  nionso : radio,  téléphone, télégraphe. Awa Bisengimana azali sous-Directeur chargé des problèmes techniques na Poste, téléphone na Télécommunication (P.T.T.) na province ya Léopoldville (Kinshasa). Elingi koloba que ye nde azalaki responsable ya ba raccordements mpe débranchements ya ba lignes ya téléphones, azalaki ko contrôler ba fréquences nionso ya radio, ba connections nationales mpe internationales. Tango kaka asilisi kelasi, na 1961,  akomi wana en remplacement ya Lieutenant Thomas Wabali (futur Général Wabali Bakitambisa oyo akokoma Commissaire d’Etat (ministre) na P.T.T. de 1975 tee na 1980) oyo abengamaki na ebonga ya Directeur des transmissions na Quartier général (état-major général) ya Armée Nationale Congolaise, na Mont Stanley (Mont Ngaliema). Pour la première fois wuta premier coup d’Etat ya Colonel Mobutu, le 14 septembre 1960, armée etikela civil ebonga stratégique ya télécommunication. Ezali pamba te mpo Bisengimana azalaki déjà un homme de main ya groupe de Binza.

Donc, ezali hasard te soki Bisengimana a évoluaki pembeni ya Président Mobutu tee na ndenge ayaki komoma très puissant. Techniquement, a jouaki rôle moko fondamental. Conséquence logique ya exécution au pied de la lettre ya ba instructions nionso groupe de Binza esali que mokonzi apesa ye ebonga na mérite ya mosala asali mpo azua pouvoir. C’est pourquoi akomaki Conseiller Principal en charge ya Mines et Energie (sous-sol, bibale, mayi na courant). Tango akomaki Directeur ya Bureau tomonaki implication na ye na ba grands projets lokola : Inga-Shaba, Sidérurgie ya Maluku, réforme ya REGIDESO oyo ebota S.N.E.L., GE.CA.MINES, SO.ZA.CO.M., S.N.C.Z., C.C.I.Z., PETRO ZAIRE, etc. Tango alongue na Bureau ya Président asali African Consult (conseil na ingénierie) yango nde ebandaki kosalela ba mines na ye priver ya colombite-tantalite (col.tan) oyo ezalaki wuta Congo-Belge, métal inscrit na programme ya stockage stratégique américain. Ekenge, malin, aliaka ye moko te, kasi aliaka mingi koleka basusu. Ye nde mutu akotisa Président boule ya kopesa ba politiciens ba carrés miniers. Yango wana ba Bomboko bawelaki Tshikapa mpo na diamant, Nendaka, Isiro mpo na or, ye a récupérer ba mines na Kivu mpo ayebaki yango malamu pamba te azalaki na documentation nionso minière mundele atika suite na ba prospections asala. Lisusu, na zaïrianisation awela biloko ya ba occidentaux te pendant que abuakela ba Zaïrois bomengo wana. En revanche, apupola nde ba indiens na ba pakistanais. Tango ba Zairois bazali kowela ba biens zaïrianisés na Kinshasa, ye azua espace munene ya ba terres na île ya Idjwi, ba terres minières et agricoles na Kivu. Tee lelo ba Français balelaka ye kaka tout comme ba Américains ba garda très bonne image na ye mpe a continuaki ko coopérer na ba grandes firmes américaines oyo ye a pistonakla na Zaïre : General Electric, Pan Am, Coca Cola, Motorola, General Motor, Good Year, Hewlett-Packard, Mobil Oil Company, International Business Machines Corporation (I.B.M.), First National City Bank Zaire S.A.R.L. (siège ezalaki na building (C.C.I.Z.), etc.

Bisengimana azalaki Administrateur na Association Nationale des Entreprises du Zaïre (A.N.E.ZA.) sous Présidence ya Bemba Saolona mpe African Consult (compagnie na ye) ezalaki na A.N.E.ZA. A collabora na batu nionso wana na patrona : Banguli, Tshivuadi, Kiakuama, Kayumba, Lukusa, Isungu, Thiran, Geyero, Tshiongo, Charlier, etc. La plupart ya ba patrons ya ba entreprises publiques atia bango poids mpo bakoma wana. Bango moko wana nde bakoma lelo kobenga ye Rwandais, traître, infiltré, etc. Ba hypocrites ! Mingi bakotelaki ye tango balongolaki ye  entre autre suite na makambo en lien na Société Textile ya Kisangani (SO.TEX.KI.). Yango esalemaki na convention ya investissement na hauteur ya 90 millions F.F. kati na Etat Congolais na groupe Beaujolin et Cie ya France na mokolo mua 15 mars 1971 mpe inauguration ya yango esalemi mokolo mua  24 novembre 1974, na Président Mobutu. Nionso oyo ekotinda biso toloba que Bisengimana azalaki non seulement génie mpo azalaki ingénieur civil, kasi mpe génie ya moyibi. En tout cas, na Zaïre wana, tondimi te que mutu moko akokani na ye na élaboration, conception mpe mise en œuvre ya techniques ya koyiba intelligemment ! Na koyiba, to sous entendre : détournement, fraude, favoritisme, abus ya ba biens sociaux, évasion fiscale, clientélisme, délit d’initier, ba antis valeurs !!!

Heure Bisengimana  azali ko proposer na Miko azonga, yango ezalaki na cadre ya muana mboka zonga na mboka na yo Zaïre mpo okende kosala mosala kuna. Bisengimana ayebaka Miko wuta 1970. Na mai 1973, Bisengimana ayaka na Paris mpe asala conférence mpo na kolakisa intérêt ya ba Français na ko investir na Zaïre mpe surtout bénéfice oyo bango bakoki ko tirer na perspectives minières mpe agricoles mpe na importance ya marché intérieur Zaïrois na objectif 80. Wana investissement français ezalaki ya ordre ya 20 millions de dollars américains na 1972, mpe asengi que na 1973 oyo emata lisusu. Neti ba Français bazalaki kozela ye, na fin mai 1973, gouvernement ya France esali loi mpo na ko protéger ba intérêts ya ba investisseurs Français na Zaïrois mpe ko faciliter ba transfères ya crédits. Yango ekumbaki tee na signature ya convention entre ba Français na ba Zaïrois. Sima ya wana, aye kotambola na Allemagne mpe a confier Miko, en secret, prospection mpo na kosomba ba bus en vue ya événement munene ya combat du siècle entre Ali na Forman, oyo elekaka na mokolo mua 30 octobre 1974. Miko afandi na Karlsruhe, yango ezali ville mpe  district ya Etat ya Baden-Württemberg. Alobaka allemand couramment mpe ye nde abandaki kotambusa Bisengimana soki aye na Allemagne. Siège ya Magirus Deutz ezali na district  ya Stadtkreis na ville ya Ulm, na Etat ya Baden-Württemberg. Tango Miko asililisi mission oyo, na janvier 1974, Bisengimana aye personnellement ko finaliser contrat munene ya plus de 300 bus (avec boîte de vitesses automatiques) na batu ya  Magirus Deutz, na ville ya Ulm, na siège ya Magirus Deutz. Miko mpe azalaki wana na molili. Sima ya wana, na mars 1974, Miko azongi na Zaïre.

Sima ya mikolo moke, sur proposition ya Bisengimana, Diecteur du Bureau ya Président de la République, Président Mobutu a nommer ye Conseiller Principal na Présidence (avec rang ya Directeur chef de service) na cellule informatique mpe na sima ya sanza, na juillet 1974, Président a signer ordonnance Loi nº  74/010, portant création et statuts de la société Zaïroise de Commercialisation des Minerais (SO.ZA.CO.M.).  Dans la foulée, Miko azui promotion en tant  Directeur technique na SO.ZA.CO.M.

Ancienne direction commerciale ya Général des Carrières et des Mines (GE.CA.MINES.) nde eyaki komona SO.ZA.CO.M. GE.CA.MINES. ezali entreprise ya liboso na Zaïre oyo ezalaki na système informatique elenda : très bonne gestion ya base ya ba données, commercialisation ya ba minerais, recherche géologique, mécanique ya sol, études topographiques, traitement ya ba revenus ya personnel, etc. nionso ezalaki informatiser. Donc, Miko en tant que Directeur technique, ye nde esengelaki asimba logistique informatique, gestion ya ba projets mpe maintenance ya réseau mobimba, mpe ko sécuriser système informatique na Zaïre mpe na ba représentations ya SO.ZA.CO.M. à travers le monde.

Tango combat kati na Ali na Forman, eleki, présidence ezui une dizaine de bus Magirus  ya sika oyo Bisengimana asombaki na Allemagne mpe la grande majorité asopi yango, na Office des Transport en Commun du Zaïre (O.T.C.Z.). Bien que Miko azalaki déjà bombarder Directeur technique ya SO.ZA.CO.M., a luttaki na appui ya Bisengimana mpo akoma Directeur général ya Office des Transports en Commun du Congo (O.T.C.C.)  mpo ye nde asololaki na molili na ba Allemands ya Magirus mpe na même élan soki azui contrôle ya O.T.C.C. akopesa bango marché ya ba bus na Magirus. Pour la petite histoire, O.T.C.C. esalemi na Ordonnance-loi nº 70-034 ya 27 mai 1970. Yango ezali entreprise ya droit public congolais. Mpe wuta 1973, convention ezalaki signer entre Zaïre na British Layland Motor Corporation, mpe art 5 ya convention iye esengaki à partir ya 1er janvier 1974), Industrie Nationale Zaïroise d’Automobiles Leyland (I.N.Z.A.L.) ezala en mesure ya ko rassembler 1.680 véhicules par année. Yango wana O.T.C.Z. ezalaki doter na ba bus Leyland.

Miko azalaki na espoir que akokoma Directeur général ya O.T.C.C. (na 27 octobre, suite na 3Z, ekomi kobengama Office de Transport en Commun du Zaïre «O.T.C.Z.») pamba te na 1974, ba nominations mpe permutations miyike misalemaki.

Munga Mibindo (Ingénieur civil électricien ya université de Louvain, un des pires gestionnaires ya deuxième République. Plus tard, ayaki kokoma très proche na Miko mpe na Kengo wa Dondo, son protecteur) alongue na O.T.C.Z. esika azalaki Directeur général wuta 1972 mpe na 1974, akomi Délégué général ya Société Nationale des Chemins des Fers du Zaïre (S.N.C.Z.).

Kala Eber (Ingénieur civil en mécanique des fluides «hydraulicien») akitani ye na ebonga ya Directeur général ya O.T.C.Z., wuta 1974 tee na 1982. Dans l’entre temps, kobanda 1978, ekomaki appellation ya Président Délégué général. Na 1982, ayaki kokoma P.D.G. ya Régie des Voies Fluviales (R.V.F.).

Mbangula Dituku Dibi (Licencié en sciences politiques et administratives ya université de Liège) akitani ye wuta décembre 1982, en tant que P.D.G. ya O.T.C.Z. Atikali wana tee tango Conseil exécutif (gouvernement Zaïrois) e décidaki ko privatiser gestion ya O.T.C.Z. en faveur ya I.N.Z.A.L. Wuta wana Mbangula akomaki Administrateur Délégué général adjoint ya I.N.Z.A.L.,

Bien que poste ya Directeur technique ya SO.ZA.CO.M. ezalaki likolo mpe ko permettre ye akoma Directeur général dans un futur proche na entreprise publique sans compter que azalaki na position ya bien, Miko a continuaki komona en grand mpe a démissionner na poste ya Directeur technique ya SO.ZA.CO.M. mpo a s’établir à son propre compte. Bisengimana atindi ye na Etats-Unis mpo a négocier na batu ya Hewlett-Packard na Rank Xerox mpo akoma distributeur exclusif na yango na Zaïre na perspective ya ko équiper réseau informatique ya gros projet. Na idée na ye, Miko, neti akomaki distributeur ya Hewlett-Packard na Rank Xerox abandi kobunda mpo azua exclusivité ya réseau nionso informatique ya Centre de Commerce International du Zaïre (C.C.I.Z.) mpo yango nde gros projet oyo batindelaki ye na Etats-Unis.  Awa, Bisengimana azalaki na approche pragmatique pamba te alingaki ko léser I.B.M. te mpo équipements (ba ordinateurs) na yango nde ezalaki ko constituer réseau informatique ya Zaïre notamment ya : GE.CA.MINES., département (ministère) ya Finances et Budget, présidence de la République, département ya Défense nationale, Barrage ya Inga mpe ba Français nde babandaki ko assurer formation ya batu sur ba machines ya I.B.M.

C.C.I.Z. esalemaki na but ya ko assurer promotion ya commerce extérieur ya Zaïre na nionso etali information ya ba cours ya marché, na oyo etali ba valeurs mpe ba matières premières, régulation na traitement ya ba investisseurs, etc.  Sans appel d’offre (Bisengimana asala ba Français ba faveurs ebele), tango Président Mobutu azui mokano mua kosala C.C.I.Z. en 1972, mbala moko présidence epesi Olivier-Clément Cacoub, architecte français de renom, projet ya kotonga C.C.I.Z. Initialement, na projet ya C.C.I.Z. esengelaki Cacoub atonga ba tours misatu (3 buildings) : Tour ya Bourse des valeurs mpe bourse ya matières premières, ya 20 étages soit 100m ya hauteur mpe 25 000 m2 ya surface planchers, tour ya hôtel 5 étoiles ya 1000 chambres na salle de conférence ya capacité ya 6000 places mpe na tour administratif ya ba bureaux à louer. Ba travaux ya tour ya liboso ebandaki na 1975, esili na 1977, mpe na mokolo mua 1er juillet 1977, inauguration na yango esalemi na Président Mobutu. Pour rappel, Alain Renard, ressortissant français, nde aponamaki na fonctions ya Délégué général ya Centre C.C.I.Z.  Awa lisusu coop ya Miko esimbaki te mpo atikalaki kozua exclusivité ya ko contrôler système informatique ya C.C.I.Z. te na ba outils ya Hewlett-Packard na Rank Xerox. Neti C.C.I.Z. mpe ezalaki na yango performant te, d’ailleurs wuta inauguration na yango, ezalaki vraiment fonctionnel selon ba ambitions minene basalelaki yango te, mpe ba tours mibale oyo ezalaki na projet etikala kotongama te, nionso oyo esalaki que Hewlett-Packard na Rank Xerox ba se retrouver te mpe babendanaki na bango.

Na échec oyo, Miko akeyi ko solliciter Paul Eideikins,  Président ya General Motor Zaïre (G.M.Z.) mpo a travailler na ye. Mpo na baye bayebi te, G.M.Z. ebotami  na convention d’investissement  ya 19 novembre 1971, oyo Etat Zaïrois e signaki na General Motor Corporation. Convention ya investissement oyo ezalaki ya ordre ya 88,5 millions de zaïres. Ezalaki mpo na assemblage ya ba  voitures mpe ba véhicules utilitaires. Selon projet, yambo esengelaki kotonga usine ya assemblage d’une superficie ya 11.900 m2. L’Etat Zaïrois epesaki terrain na Masina mpe ba travaux ya construction ebandi na avril 1973, mpe e coûter 4,25 millions de zaïres. Na octobre 1974, G.M.Z. ebandi assemblage ya ba voitures automobiles. Tango oyo 1 zaïre = 2 dollars américains mpe fiscalité ezalaki très favorable na investissement.

Convention d’investissement entre la République du Zaïre na  General Motor Corporation ezalaki approuver na mokolo mua 21 février 1972, na Ordonnance présidentielle ya 9 juin 1972 oyo epesaki ndingisa na kokela société na kombo ya  General Motor Zaïre (G.M.Z.) mpo na concrétisation ya projet. Inauguration ya usine ya General Motor Zaïre esalemi na mokolo mua 22 novembre 1975, na Président Mobutu. Lisusu, convention elobaki que capacité ya production annuelle esengelaki ezala ya 4.000 véhicules mpo na équipe moko soit 8.000 véhicules sur la base ya ba équipes mibale ou deux shifts. Production ezalaki ya ba mituka miye  selon Arrêté ministériel nº 0AB/EN/008/72 portant agrément de la société General Motor Zaïre pour représenter et commercialiser les véhicules automobiles des marques : Chevrolet, Buick, Pontiac, Oldsmobile, Acadian, Cadillac, G.M.C. Truck, Vauxhall, Bedford, Opel Kadett (diesel), Ascona (nouveau modèle), Pick up Isuzu KBD 41 (4 X 4) na KBD 21 (4 X 2) (diesel), Pick Up Isuzu RTS 91(diesel) ; TSD ; HER na TXD, Holden en République du Zaïre. Plus tard, Peugeot 504 voitures na pick up, Renault4 voitures na fourgonnettes, Renault 9, JE 13. Par ailleurs, G.M.Z. ebandaki ko importer Suzuki voitures mpe na utilitaire (4 X 4).

Paul Eideikins, Président ya General Motor Zaïre, azalaki na ba très bonnes relations na Bisengimana mpo ye nde mutu azalaki  na base ya ko attirer investissement ya ba Américains ya General Motor Corporation tout comme ya ba compagnies minene américaines oyo eyaka ko investir na Zaïre. Sur recommandation ya Bisengimana nde Miko, na 1979-80 a sollicitaki Eideikins mpo alukela ye quelque chose na compte ya G.M.Z. Yango wana, Eideikins, a accordaki ye un droit non exclusif ya vente mpe na représentation ya ba voitures mpe utilitaires 4 X 4 ya marque Suzuki na concession automobile na kombo ya Mini Motor Zaïre.

L’américain Joseph F. Gatt (même source)

Sika, yambo tolobela ndenge Téléphonie Cellulaire S.A.R.L. (TELE.CEL.) esalemi, esengeli naino tobuaka mua liso moke na oyo etali parcours ya co-fondateur ya TELE.CEL. mpo yango esalemi na Miko Rwayitare na Joseph F. Gatt, ayebani mingi na kombo ya Joe Gatt. Azali citoyen Américain, atangi na France, mpe na Etats Unis, na New York. Azali na diplôme na économie (Bachlor Art/BA), option : organisation industrielle, ya Hunter Collège ya New York City. Abandi carrière na ye na début ya ba années 60 na Compagnie aérienne Pan America Airways (Pan Am.). Ayaki kokoma Directeur ya Pan Am. en charge ya ba projets spéciaux mpe na ba ventes destinées na ba forces armées na Australie mpe na ensemble ya Orient. Na 1969, aye ko atterrir na Kinshasa. Ba soupçonnaka ye comme étant un agent ya ba renseignements américains.

Ndenge nini Joseph Gatt ayaki na Kinshasa? Ba Américains nde batiaki Général Mobutu na pouvoir mpe bapesa ye aide financière koleka ba pays nionso occidentaux. Compte tenu ya ba potentialités économiques ya Zaïre, ba investissaki massivement mpe bazalaki na ba projets miyike ya investissement mpo na Zaïre. Esengeli to reconnaitre que ba Américains basopa mbongo ebele na Zaïre na ba formes nionso oyo ekokaki ko permettre biso tokoma mosika soki penza tozalaki na ba dirigeants responsables. Malheureusement, elekaki bongo te. Ndenge bango ba fonctionnaka, mbongo na bango na étranger esengeli naino e bénéficier na investissement américains oyo ezali na ekolo oyo bango bazali ko financer. Na yango, neti ba Américains babandaki ko envisager ko voyager souvent na Zaïre, esengelaki bazala na cadre moko kitoko lokola hôtel de luxe oyo ekoki ko héberger bango mpe compagnie aérienne oyo bango bakozua mpo na ko voyager na Zaïre. Yango wana Pan Am. a tiaki vol moko une fois par semaine, tous les mercredis.  Vol ya Pan Am. ebandaki kokoma na Kinshasa na midi mpe kolongua na 15 heures na destination ya New York via Dakar, na Senegal. Vols wana ebandaki kosalema na Boeing707.

Na 1967, Pan American Airways esengaki na Etat Zaïrois soki akoki ko signer partenariat na filiale na yango, Intercontinental Hotel Corporation. Selon Pan Am., partenarial na Intercontinental Hotel Corporation ezala à part égale, c’est-à-dire 50% mpo na Etat Zaïrois mpe 50% mpo na Intercontinental Hotel Corporation.  Na même année, 1967, United States Agency for International Development (U.S.A.I.D.), Agence Américaine ya  Développement International (USAID) e débloquer crédit ya 2,5 millions ya dollars américains mpo na construction ya hôtel de luxe ya 260 chambres. Bechtel Corporation a longaki appel d’offre mpe azui contrat ya kotonga Hôtel Intercontinental ya Kinshasa. Misala mibandi na 1968, mpe esili na septembre 1971. Le 3 octobre 1971, Président Mobutu a inaugurer hôtel ya sika na kombo ya Intercontinental, ya entreprise d’économie mixte ebengami  na kombo ya Société ya Grands Hôtels du Congo. Sima ya mbula mibale, na février 1973, Conseil exécutif eyokanaki na Intercontinental mpo batonga tour ya 24 étages na ba appartement pembeni na ngambo ya jardin mpe ba associer IMMO.KIN. na Bechtel na projet oyo. Initialement  ba travaux esengelaki esila na 1975, kasi ebendanaki tee na 1986, année ya inauguration ya nouvelle tour. Ba appartements esilaki wuta 1979.

Projet oyo nde ekumbaki Gatt na Zaïre mpe na 1970, sur proposition ya Bisengimana, Président Mobutu a nommer ye Conseiller na présidence, en charge ya ba projets touristiques, hôteliers et gouvernementaux. Na fin 1975, ba bombarder ye Président Délégué général ya Air-Zaïre na objectif ferme ya ko garantir un regain de dynamisme na compagnie mpo e permettre na Air-Zaïre e jouer  un rôle capital et original na développement ya ekolo Zaïre. Na 1979, tango Conseil exécutif elingaki ko renouveler mandat na ye, aboyi, alobi que alingi ko continuer ko maintenir image de marque ya Zaïre mpe ko servir ekolo na domaine ya tourisme, yango wana Conseil exécutif na Groupe Intercontinental e concrétisaki souhait na ye na  ko confier ye ebonga ya Administrateur Délégué ya hôtel Intercontinental ya Kinshasa. Wuta 1977 nde Bisengimana atiaka Miko na circuit na Gatt. Relation oyo eyaki makasi a tel point que premiere epouse ya Miko, Josephine Diur, akomaki kosala na hôtel Intercontinental comme responsable na division ya télé service. Tokozongela !

Gatt azalaki na carnet d’adresse elenda mpe en tant que mokonzi ya hôtel intercontinental, azalaki na ba renseignements en relation na mosala na ye mpo hôtel wana ezali esika ba Very importantes personnes ya Zaïre mpe na ya étranger bayaka mpo ba raisons kili kili. Contre-espionnage ya Zaïre mpe  ezalaka mingi mingi wana y compris na ba hôtels mosusu ya ba occidentaux neti Memling (Sabena, Belges), Okapi (U.T.A., Français) ou Regina(Belges). Gatt alongue na Intercontinental na 1985 mpe Tamer K. Massoud nde a kitanaki ye en tant qu’Administrateur Délégué général.

Bon, idée ya Téléphonie Cellulaire S.A.R.L. (TELE.CEL.) eyaki ndenge nini? Miko abandaki kosala pour les Américains ya General Motor na oyo etali vente ya ba véhicules importés ya marque Suzuki na concession automobile na kombo ya Mini Motor Zaïre. G.M.Z. ezalaki bilanga ya ba Rwandais mpo batondaki kuna.  Gatt, un ancien cadre ya Pan Am. mpe ayebanaki na ba patrons mpe ba hauts cadres ya ba firmes minene ya Etats-Unis lokola  Motorola, compagnie multinationale ya télécommunication, yango nde e équipaki l’Etat Zaïrois na matériel militaire ya transmission, information mpe communication radiophonique, ba institutions politiques et administratives, ba entreprises publiques, ba services ya renseignements civils, ba régies nionso, institutions religieuses, batu ya profession libérale,  aéroport, ports, masuwa,  ba voitures ya policiers, etc. ezalaki équiper na ba appareils Motorola : Radio émetteur-récepteur portatif (talkie-walkie),  radio émetteur-récepteur fixe (phonie), etc. Nionso oyo ezalaki kosala na fréquences ya Office National des Postes et Télécommunication du Zaïre (O.N.P.T.Z.). Bref, Motorola ayebaki biso malamu mpo tobandaki kosalela ba appareils na ye ya communication sur toute l’étendue de la République. Yango wana na jargon populaire, talkie-walkie ebengama : Motorola.

Na milieux ya ba années 80, ba Rwandais bazalaki na astuce moko efficace ya ko faire passer information na mayangani ma bango sans pour autant ba attirer attention ya ba services de renseignements ya Zaïre. Bazalaki kokutana régulièrement na hôtel intercontinental ya Kinshasa na oyo ebandaki kobengama club des blagues. Na apparence, mutu nionso oyo azalaki na ba blagues mpo na kosekisa, azali libre ya kosangana na bango mpo na ko lancer ba blagues mpe ko passer ba bons moments. Kasi, club iye ezalaki penza na ba critères précis te, tout ezali ko dépendre na lolenge mua commission wana eko évaluer blague mpo endima yo oya kosangana wana mpo na ba blagues. Souvent, ebandaki koyebisa batu, soki endimi, que zonga na semaine prochaine, sima ya ko remplir fiche ya adhésion. Nionso wana, mpo ezua temps ya ko vérifier soki ozali fiti ou pas. Libre adhésion na kati ya club oyo, ezalaki mpo na kolakisa que eloko moko ya suspect ezali wana te mpe ba réunions ezali kosalema na intercontinental, esika batu mingi bayaka, etc. Donc, rien à cacher ! Sima, ekomaki kosalema ba vendredis nionso epayi ya Miko, na Gombe wana kaka.

En réalité, nionso wana ezalaki milinga mpo véritable réunion ebandaki kosalema une fois ba blagues wana esili, na sortie. Comment ? Au départ, bazali 4 personnes ya Tutsi power oyo basangani en secret. Sima, chaque personne na quatre wana, akutani na mutu moko en priver mpe na lieu mosusu. Bakaboli information mpe esali 8 personnes. Sika, 8 personnes oyo nde, na suka ya réunion oyo ya ba blagues, bakozua tête ya groupe ya 4 personnes du genre kolakana mua lisolo ya moins de dix minutes, maquiller na koseka,  etc. Au finale, message e atteindre 40 personnes en toute finesse. Sika, ba Zaïrois oyo bayelaki ba blagues, bakomona rien mpe ba ko comprendre rien mpo bazali cantonner na rôle ya dindon de la farce.

Soi-disant discipline ya ba Rwandais na mosala ndenge emonanaki na G.M.Z. na ba cadres mpe ba agents mpe na lolenge Miko asimbaki concession ya G.M.Z. ezalaki parmi ba atouts oyo esali que investissement ya ba Américains ekueya na maboko na bango na oyo etali innovation technologique ya téléphone na Afrique avec Zaïre comme point de départ. Esengeli to noter que makanisi ya ba Américains  ezalaki uniquement na stratégie commerciale mpe bazalaki na avance na ba projections économiques na bango na domaine ya communication cellulaire na Afrique.

Téléphonie Cellulaire S.A.R.L. (TELE.CEL.) esalemi ndenge nini ? Joseph Gatt na Miko bazalaki na rien en terme ya ko monter une véritable entreprise ya télécommunication na taille oyo TELE.CEL. ebandaki. Nalobi te que mpo na kosala Société A Responsabilité Limitée (S.A.R.L.) ezali kosenga capital social munene (mbongo ebele). Development Technology nde asimbaki makambo nionso wana. Neti ebandaki kokoka concurrence na marché américain te, a maquiller délocalisation na ye na forme ya faillite pour en fin abotama na kombo ya TELE.CEL. Gatt aye na coop, a brancher Miko a mettre Kengo, Premier Commissaire d’Etat, na Seti Yale, Conseiller Spécial ya Chef de l’Etat en matière de sécurité, dans le coup.

Coïncidence ou pas ? Seti a dissuader  Président a créer Agence Nationale ya Immigration tout à fait autonome mpe Kengo a appuyer idée wana. Ordonnance nº 83-193 ya 03 novembre 1983 nde ekelaki Agence Nationale de Documentation (A.N.D.). Yango ekomaki réviser na  Ordonnance nº 85-188 ya 25 juillet 1985.  Ngbanda Nzambo Ko Atumba wuta 1985,  akomaki Administrateur Général ya Agence Nationale de Documentation (A.N.D.) avec pour Administrateur Général adjoint na Documentation Intérieure (contre-espionnage), Service ya Documentation Intérieure (S.D.I.), Goga Lingo wa Dondo. Ce dernier nde azuaki ebonga ya Administrateur Général ya Agence Nationale d’Immigration (A.N.I.). Ainsi, ba attributions nionso azalaki na yango sous administration ya Ngbanda, ekomi na maboko ma ye en tant que Agence autonome na A.N.D. En d’autres termes, ye nde mutu azali na charge ya : Police des étrangers (mise en exécution ya police ya gouvernement zaïrois na oyo etali séjour), titre de séjour, délivrance mpe prorogation ya visa ya mopaya na ekolo Zaïre. Police des frontières : kokota na kobima na ekolo, délivrance ya avis favorable na Zaïrois mpo na azua passeport ordinaire, délivrance ya laissez-passer, collaboration na Organisation Internationale de la Police criminelle (INTER.POL.), immigration na identification ya mopaya. Azali kokonza mpe ba Directions régionales (provinciales) ya renseignement mpe documentation (RE.DOC.).

Seti alongue na 1986 (azalaki wana kobanda 1980), akomi Secrétaire particulier ya Président,  Nkema Liloo oyo azalaki Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire du Zaïre auprès de l’Office des Nations-Unies et des institutions spécialisées à Genève, a remplacer ye mpe akomi Conseiller Spécial ya Chef de l’Etat en matière ya sécurité (ennemi juré ya Seti).

Mpo na baye bayebi te, na 1980, Nkema azalaki Administrateur Général ya Service National d’Intelligence (S.N.I.). Adjoint na ye, Administrateur Général adjoint, Ngbanda Nzambo ko Atumba. Par ailleurs, na Centre National de Recherches et d’Investigations (C.N.R.I.), Administrateur Général, Atenda Mongebe Omwango.  Administrateur Général adjoint, Kesangana Dedetemo.

N.B. S.N.I. ezalaki mpo na renseignement extérieur (espionnage) mpe C.N.R.I. mpo na renseignement intérieur (contre-espionnage)

Na 1983, Président abomi S.N.I. mpe na C.N.R.I. mpe a sangisi ba services esika moko na Centre National de Documentation (C.N.D.) mpe a nommer Mokolo wa Mpombo, Administrateur Général mpe ba adjoints mibale : Administrateur Principal chargé du Service de Documentation Intérieure (S.D.I.), Goga Liongo wa Dondo. Administrateur Principal chargé du Service de Documentation Extérieure (S.D.E.), Atundu Liongo.

Ndenge tomoni, successivement, Goga azalaki adjoint ya Mokolo (1983-1985) mpe ya Ngbanda (1985-1987) ! Président a signer Ordonnance nº 87-003 ya 07 janvier 1987 portant création de l’Agence Nationale d’Immigration (A.N.I.), a nommer Goga, Administrateur Général  ya A.N.I. Naturellement, asali Cabinet na ye mpe atie Sirimuhugo Mathe, Conseiller Principal mpe Chef de Cabinet.  Parmi ba Conseillers na ye, Daruwezi Mokombe, Conseiller économique et financier. Na janvier 1989,  toujours sur proposition ya Goga, na qualité na ye ya Administrateur Général ya A.N.I., Président a nommer Sirimuhugo, Administrateur (bazali 23),  Daruwezi , Administrateur adjoint (bazali 19) parmi ba Administrateurs ya A.N.I. Tango ba ndeko na bango ba Rwandais ba occuper R.D.Congo, Kanambe a nommer Daruwezi, Assistant (adjoint), na  Décret nº 053/2003 ya 23 décembre 2003 portant nomination des Assistants du Conseiller Spécial du Chef de l’Etat en matière de sécurité (bazali 3). Ordonnance nº 07/001 ya 5 février 2006,  etie ye Vice-ministre ya sécurité, na gouvernement Gizenga. Na juin 2007, Kanambe a bombarder ye, Administrateur Général ya Agence Nationale de Renseignements (A.N.R.) mpe  Sirimuhugo, Administrateur Général adjoint.

Ngbanda na tête ya intelligence zaïroise, ebandaki ko tourmenter Seti makasi !  D’ailleurs, Seti azali mutu moko très agité et toujours na qui-vive. Azali à la fois sulfureux et véritable paranoïaque ! Il voit le mal partout mpe neti abandaki habituellement  kosalela batu mabe, il se croyait toujours menacer en permanence. Yango wana azalaki à tout moment  na arme de poing na loketu mpe na voiture na ye abandaki kozala na arme de guerre na nse ya makolo sans ko compter ba kisi ya ndenge na ndenge mpo na protection na ye. En plus, neti Ngbanda awuti na «moule» ya Mokolo, ezalaki ko mettre ye à l’aise te mpo ye moko ayebi ndenge lutte ya positionnement na Mokolo e suka. Par contre, Goga azalaki l’homme qu’il fallait mpo ye azali ndeko ya Kengo. Tata na Goga nde abokoli mpe akolisi Kengo wa Dondo. Kombo ya Dondo ezali ya tata na Goga. Même soki bazali makila moko te, par adoption, Goga azali leki ya Kengo. Yango wana Kengo azalaki puissant mpo leki na ye Goga (patron ya ba services) na mutu na ye Seti (grand patron ya ba services) basimbaki masolo. Peut-être façon ya ko déblayer terrain na perspective ya ko faciliter circulation, immigration na séjours ya ba paya en relation na projet ya TELE.CEL.

Wuta époque coloniale, monopole ya service public ya télécommunication ezalaki reconnue na Congo-belge na Ordonnance législative nº 254/Télécommunication ya 23 août 1940. Tango Congo ekomi lipanda, Président Mobutu ayaka ko signer Ordonnance-loi nº 68-475 ya 13 décembre 1968, portant création ya Office Congolais des Postes et Télécommunications, en abrégé (O.C.P.T.).  Epesi yango mpe lotomo ya organisme ya droit public congolais ayant sous sa gestion le monopole ya télécommunication.

Na 1971, Président Mobutu a signer Ordonnance-loi nº 71-015 ya 15 mars 1971 sur les installations radioélectriques privées. Yango  nde ebandaki ko reconnaître droit ya délégation na ya autorisation ya O.C.P.T. mpo epesa ba privés droit ya ko installer;  ko s’établir ou ko exploiter ba réseaux ya télécommunications ouverts na public. Na changement ya kombo ya Congo na Zaïre, na mokolo mua 27 octobre 1971, O.C.P.T. ekomi kobengama : Office National des Postes et Télécommunications  du Zaïre (O.N.P.T.Z.).

Loi nº 78-002 ya  6 janvier 1978, relative na dispositions générales applicables na ba  entreprises publiques ; e définir entreprise publique comme tout établissement qui, quelle que soit sa nature,  est créé et contrôlé par les pouvoirs publics pour remplir une fonctions d’intérêt général ;  est créé à l’initiative des pouvoirs publics entre eux pour l’exploitation en commun d’un service ou d’une activité donnée ;  est crée à l’initiative des personnes morales de droit public entre elles pour l’exploitation en commun d’un service ou d’une activité donnée ;  est créé à l’initiative des pouvoirs publics en association avec les personnes morales de droit public pour l’exploitation en commun d’un service ou d’une activité donnée.

Quant à son organisation et son fonctionnement, l’entreprise publique est présidée par un Conseil d’Administration, administrée au quotidien par un Comité de Gestion, contrôlée par la Cour des comptes et dépendant d’une ou de plusieurs organes de tutelle.

Kaka na mbula moko wana, na 1978,  Président Mobutu a signer Ordonnance-loi nº 78-222 ya 5 mai 1978 portant statuts d’une entreprise publique dénommée Office national des postes et télécommunications du Zaïre, en abrégé (O.N.P.T.Z.). Yango nde ebongolaki statut administratif ya O.N.P.T.Z na bokomisi yango établissement industriel et commercial ya droit public zaïrois fonctionnant sous le régime ya droit privé zaïrois sans ko toucher na monopole public (monopole postal, télégraphique, téléphonique et des signaux et communications par satellites) na yango na domaine ya télécommunication.

Ba juristes ya ba Américains oyo babombamaki sima ya  Miko na Gatt bamonaki brèche oyo ezalaki na Ordonnance-loi  nº 68-475 ya 13 décembre 1968, ekeli O.C.P.T., etikali ko prévoir ba intentions claires et biens définies te na lolenge l’Etat esengeli asalela monopole na ye soki esengeli a apesa droit d’exploitation, c’est-à-dire autoriser compagnie songolo e s’installer, e s’établir nto mpe e exploiter ba réseaux ya  télécommunication ouverts na  public.

Brèche mosusu,  article 2, ya Ordonnance-loi nº 68-475 ya 13 décembre 1968, oyo ekeli O.C.P.T. elobi noye : L’office est chargé de l’exploitation du service public des Postes et Télécommunications. A cet effet, il exerce le monopole postal, télégraphique, téléphonique, de radiocommunications par satellites. Il applique la législation et la réglementation relative aux Postes et Télécommunications.

Kasi,  Ordonnance-loi nº 82-027 ya 13 décembre 1982 portant cadre organique ya département (ministère) ya Postes, Téléphonés et Télécommunication (P.T.T.), eye kokabola ba prérogatives oyo epeselamaki na O.N.P.T.Z : etikeli O.N.P.T.Z.  kaka exploitation mpe epesi na Secrétariat général ya P.T.T. application ya lois na règlements.

Ainsi, na 1986, sans ko abroger loi oyo ezali ko garantir monopole na domaine ya télécommunication na O.N.P.T.Z., Conseil exécutif, par le biais ya Commissaire d’Etat (ministre) na Postes et Télécommunication, epesi TELE.CEL. autorisation ya exploitation en bafouant ba droits oyo Etat ezali ko reconnaître O.N.P.T.Z. Par conséquent, TELE.CEL. akomi détentrice ya licence ya exploitation oyo ezali ko accorder ye ba pleins droits sur toute l’étendue ya République du Zaïre. Miko na Gatt bawelisa kozala na infrastructure nionso entre 1987 na 1988. Mpe na 1989, Zaïre ekomi doter na Advanced mobile Phone System (A.M.P.S.), système ya téléphone cellulaire. Mbala moko TELE.CEL. ebandi ko exploiter yango.

Tango Conseil exécutif e comprendre que esali buzoba na botikeli TELE.CEL., yango moko exploitation ya réseau cellulaire na Zaïre, Président Mobutu a signer Ordonnance nº 91/240 ya 30 septembre 1991 portant création ya Réseau Zaïrois des Télécommunications par Satellite (RE.ZA.TEL.SAT.). Yango penza nde e lendisaki diffusion par satellite ya radio, télévision na téléphone.  Ezalaki na ba stations terriennes 13, ba centres ya émetteurs ya télévison 18 mpe ko rassurer ba liaison hertzienne ekati na ba stations terriennes na ba centres ya émetteurs ya télévision. Na téléphonie, molende penza emonanaki te. Neti RE.ZA.TEL.SAT. ezali ya l’Etat, ye, apesaki yango monopole ya télécommunication na même titre na O.N.P.T.Z.

Neti  O.N.P.T.Z. etikali na exploitation, P.D.G. na yango,  Baligaza Yangamg, Zaïrois d’origine rwandaise, P.D.G. ya O.N.P.T.Z  kobanda 1988 tee na 1991, a appuyer aveuglement projet ya TELE.CEL. mpo azalaki na kati ya masolo. Malgré ba pressions ya ba syndicalistes na ba grèves mpo balongola ye na ebonga wana, Kengo a protégea mpe a défenda  ye bec et ongles  mpe Président Mobutu atika ye wana. Na molongo, azalaki na ba contraintes juridiques te mpo une fois Conseil d’administration ya O.N.P.T.Z. endimi contrat oyo ba juristes ya Miko na Gatt ba elaboraki, le reste etikali likambo ya département ya P.T.T. (Commissaire d’Etat) nde eko se débrouiller mpo a signer arrêté départementale (règlement) oyo ezali kondima TELE.CEL. asala mosala. Wana Baligaza akoloba ngai te, l’Etat ebotola ngai délégation na yango na oyo etali application ya loi na règlement epesa Secrétaire général ya P.T.T.

Na cadre kaka ya koboya kozala na mémoire mokuse, tango  Bemba Saolona asali Communication Cellulaire S.A. (COM.CEL.)  Société Anonyme, na 1993, na 4 millions $ U.S., mpo na ko concurrencer TELE.CEL., akamati lisusu le même Baligaza, akomisi ye P.D.G. ya COM.CEL.

Ndenge lisolo ya TELE.CEL. ebetama ou ndenge ezalaki relayer ezali komonana polele que Miko na Gatt bazalaki kosopa batu mpo masolo na bango tee na lelo oyo ezali ko tenir la route te. Na 1985, Tango ba présenter na Président Mobutu projet na bango na visite oyo Président Mobutu asalaki na Etats Unis, na délégation ezali na Maître Kamanda wa Kamanda, Commissaire d’Etat na Affaires étrangères ; Seti Yale, Conseiller spécial ya Chef de l’Etat en matière ya sécurité mpe Ambassadeur ya Zaïre na Washington, Kasongo Mutuale. Miko na Gatt par entremise ya ba techniciens américains, basala Président Mobutu ndenge tolobaka na lingala : jeux d’esprit ou mundele yeyo ! Au fait, ba appareils oyo bango ba utilisaki mpo na kosala démonstration ya communication cellulaire, ezali en réalité ba téléphones satellitaires. Présidence de la République ebandaki ko utiliser oyo ebandaki kobengama système nodal. Yango nde ezalaki ko permettre réception ya communication par satellite. Ezalaki mpe embarquer na M.S. Kamanyola. Ba personnalités lokola Kengo, Ngbanda, Moleka, Dokolo, Bemba Saolona, Général Singa, etc. bazalaki na yango na ba ndaku na bango mpe na ba bureaux. Yango wana bazalaka toujours na ba opérateurs oyo bazalaki ko gérer ba communications na ba différentes lignes na bango.

Na kobenda Président Mobutu esprit, bazalaki ekenge en spécifiant que wana ezali kaka prototype mpo e fonctionner na mutu nionso (service na couverture) esengeli naino logistique (A.M.P.S. na ba antennes relais) efanda mpe na ba téléphones commerciaux oyo ezali kokende na yango. Ba Américains wana bayebaki malamu que soki kaka Président akomi na Kinshasa, akotalisa projet oyo na Service Présidentiel d’Etudes (S.P.E.). Yango ezalaki diriger na Professeur Malu wa Kalenga mpe ezalaki na ba cerveaux oyo ekokaki ko reveser Miko na Gatt.

Miko azalaki na ba affaires ni na Zaïre ni na étranger. Azalaki un simple gérant ya Mini Motor Zaïre. Neti azalaki patron te, yango wana akokaki kozala membre ya Association Nationale des Entreprises du Zaïre (A.N.E.Z.A.) te. Azalaki na portefeuille ya malonga te, par miracle, a contracter prêt ya investissement na Etats-Unis sans pour autant asenga Président Mobutu garantie ya l’Etat au cas où azalaki défaillant. Soki Président azali séduit na projet oyo, selon ndenge ye abandaki koloba, pourquoi akokaki ko signer Ordonnance te oyo l’Etat zaïrois azali ko se porter garant mpo ye adefa mbongo mpo na cas échéant, soki akoki ko rembourser na échéances te, Président a ko signer Ordonnance mosusu mpo na remboursement ya niongo oyo ye, Miko, akoti na banque na Zaïre. Soki ezali kuna na Etats-Unis, convention nde ekozala signer entre l’Etat zaïrois na banque wana mpe Président a kondima yango na Ordonnance. Ezali inconcevable une banque sérieuse na Etats-Unis e defisa un citoyen étranger non-résident na territoire américain, sans business digne de ce nom,  sans actif financier ya malonga, un prêt d’investissement ya hauteur ya plus de 500.000 $U.S.?

Comble ya ironie ezali que même l’Etat wana nde ezalaki gros client na ye mpo ba cadres na ba dirigeants ya ba institutions nionso ya Républiques bazalaki na TELE.CEL. tee na ba conseillers na présidence bazalaki ba abonnés na compagnie oyo mpo na compte ya l’Etat.

Finalement Miko na Gatt, ba actionnaires mibale à parts égales, ya TELE.CEL., sima ya ba multiples démarches, ba yaki ko signer convention ya 6 juin 1989, na Baligaza, P.D.G .ya O.N.P.T.Z. mpo na licence d’exploitation na hauteur ya 1,5 million $U.S. Awa nde Motorola eyaki kosopa ba téléphones cellulaires na marché sans concurrence, TELE.CEL. ekangaki marché sans aucune concurrence, en plus ya Kinshasa,  esali extension géographie moko spectaculaire en s’implantant na Goma, Lubumbashi, Bukavu na Mbuji Mayi. Tobosana te que TELE.CEL. ebandaki neti ba compagnies mosusu te, moke moke ezali komata. Non ! Yango ebandaki mabala moko munene mpe e embaucher ba Rwandais ebele. Wana ezalaki penza compagnie ya ba Rwandais. Yango wana, Josephine Diur, première épouse ya Miko, abandaki kotelemela bango mpe koyebisa Miko polele na miso ya batu que TELE.CEL. ezali ya ba Rwandais bango kaka nde bakendaka na formation na entreprise Boston Technology na Etats-Unis.  Abandaki mpe koyebisa ba Rwandais vis-à-vis que suka suka bokobalukela Zaïre ! Pourquoi abandaki koloba boye ? Ayebaki fonctionnement na bango mpo abandaki ko reprocher bango, ba Tutsi, difficulté ya socialisation na batu mosusu mpe ba balanaka kaka bango na bango. Maloba ma ye nganga mpo suka suka Miko ayaki kokabuana na Josephine Diur oyo babota na ye bana mitano mpe akeyi kobala muasi ya Tutsi,  Consolata Ruboneka, oyo apesi ye bana mibale.

Miko na Gatt ba bandaki idée ya conception ya TELE.CEL. kobanda na 1984-1985. Na mbula elandi, babandi kosala démarches administratives, bazui siège na avenue des étoiles, croissement na avenue de la justice, na Gombe, juste sima ya boulevard du 30 juin, non loin ya cimetière de la Gombe. Lelo, Africell R.D.C. nde ekoma wana ;  ba s’inscrire na nouveau registre de commerce de Kinshasa, ba sali demande ya numéro d’identification nationale ; ba recruter mpe ba former batu ; ba commander ba fournitures, équipement technique tee na ndenge efandaki rapidement na Zaïre mpe ekomaki na ba abonnés ebele, surtout batu oyo bazali na ba moyens, mpo yango ezalaki na porter ya mutu nionso te. Na 1993, eye kokoma TELE.CEL. international mpe Gatt na Miko bateki 10% ya participation na bango na ba investisseurs mosusu. Na international ezalaki ko opérer na : Togo, Niger, Guinée-Conakry Burkina Faso na Côte d’Ivoire na Afrique de l’Ouest ; Gabon, Tchad, Centrafrique na Afrique centrale; Ouganda na Burundi na Afrique de l’Est, Zambie na Zimbabwe na Afrique Australe mpe na île ya Madagascar. Bakomaki ko se vanter que bazali na fourchette ya 500.000 abonnés sur l’ensemble ba pays nionso ezuami. Na l’an 2000 nde mission ya Gatt na Miko esukaki mpe ba Américains ba récupérer investissement na bango soit 80% oyo ya Miko na Gatt, ba sombi 10% oyo ezalaki na ba investisseurs mosusu mpe batekisi yango na Orascom Telecom Holding S.A.E. (ekoma Global Telecom Holding),  na valeur ya 413 millions $U.S. Bien évidemment Miko na Gatt bafutamaki na mbongo ebele sans ko compter ba primes na salaires na bango.

Hasard ya calendrier ou pas ? Elekaki ndenge nini ? Na août 1998, ba Rwandais ba attaquer régime ya Président Laurent-Désiré Kabila. Na période oyo nde Miko na Gatt ba décider «kokabuana». Kaka pamba boye ? Sans raison ? Ba contunuaki kozala na vison moko, ba divergences ezalaki te na lolenge babandaki ko gérer entreprise na bango. Sans toyoka que babandi kosala ba négociations mpo na ko trouver accord na bokabuani na bango, mbala moko, mokolo mua 23 décembre 1998, ba signer accord de scission ya groupe na biteni bibale. Miko atikali na kombo ya TELE.CEL. mpe na filiales ya Togo, Niger, Burkina Faso, Côte d’Ivoire, Gabon, Tchad, Centrafrique, Ouganda, Burundi, Zambie na Zimbabwe. En revanche, Gatt a récupérer maison mère na R.D.Congo, mpe na filiales ya Guinée-Conakry, Madagascar na Belgique (esika ezali associer na Africa Link (AFRI.LINK., yango ekoma AFRI.SAT.).

Kokamua ndenge  Miko asundoli TELE.CEL. ya R.D.Congo ! N’est-ce pas que azali Congolais? Pourquoi akokaki ko se soucier na misala ya ba soi-disant ndeko na ye ba Congolais oyo bazali na TELE.CEL. te? Apesa ba explications plausibles te bien que tomonaki biso banso que TELE.CEL. ezalaki ko continuer extension na yango à l’international sans problème mpe concurrence à l’intérieur ebandaki kotiya bango en difficulté te. Ba discours nionso oyo abandaki kosalela bango na ba fêtes na bango ya nouvel an na hôtel intercontinental, nionso na mayi ! Curieusement, sima ya «bokabuani», bango banso babale, batekisi TELE.CEL. na Telecom Holding S.A.E.

Tango basilisi, Miko akimi R.D.Congo, akeyi ko investir mbongo na bilanga ya raisins mpo ebimisela ye vin, Mont Rochelle Winery, mosika kuna na vallée ya Franschhoek, na Cap Town, na Afrique du Sud. Ezali mpe na restaurant na hôtel soki na bungi te. Atongisi une somptueuse villa na Sandhurst, Sandton, na Johannesburg mpe asombi hôtel Mille Collines ya Kigali. Lisolo ya cellulaire esila puisque ezalaki ni ya ye ni ya Gatt.

Justement, Gatt, clef de voûte ya dispositif nionso oyo, mpe avant akima R.D.Congo, a saisir opportunité ya kobenda mbongo. Mieux informé que tout le monde, azuaki information que compagnie ya phone na kombo ya AFRI.TEL., détentrice ya licence numérique na standard américain Code Division Multiple Access (C.D.M.A.) ezalaki dans la peine ya ko trouver financement mpo na a honorer contrat ya achat na fourniture ya équipement azalaki na yango na Qualcomm Technologies, spécialement division na yango Qualcomm C.D.M.A. Technologies. Na juin 1999, asombi AFRI.TEL. pendant que ayebaki malamu que yango ezali na ba difficultés financières mpo na kosomba équipement adéquat. Na septembre 1999, AFRI.TEL. e acquérir équipement ya sika, kasi ezalaki surfacturer pamba te valeur na yango ezalaki prêt de quatre fois inférieur na montant ya facture. Trois mois sima ya réception ya équipement, na décembre 1999, Qualcomm C.D.M.A. Technologies etekami na Ericsson, oyo ezali moko ya ba fournisseurs ya équipement ya standard européen, Global System for Mobile (G.S.M.). Gatt alekela AFRI.TEL. mpe yango etikala ko intenter action na justice tee na ndenge aliaka coin.

Azongi na Etats-Unis mpe na 2004, asali mua compagnie moko boye ya muke na sous-traitance na télécommunication mpe etekaka ba phones na ba accessoires, na Great Falls na Etat ya Virginie, na Etats-Unis, na kombo ya Intercel Telecoms Group Inc. Yango ezalaki na une trentaine ya batu mpe ebandaki ko peser moins ya 1 million $ U.S.  Ekueyi  na 2010, atekisi yango mpe akomi vice-président en charge na ba achats à l’international tee na 2011.  Balongoli ye, akeyi kosala compagnie mosusu na kombo ya GF Solutions, LLC. Azalaki wana tee na 2013, sima akomi na ye mitelengano.

Moninga na ye Miko banda akima R.D.Congo, atikala kozonga lisusu te mpo M’zee Kabila afundaki ye que a finançaki attaque ya août 1998. En réalité, Miko abanda na ye wuta kala ko financer ba Tutsi na ba ambitions miyike négatives oyo bazalaki na yango contre R.D.Congo.  Na 1991, akomaki membre ya parti Union des Démocrates Indépendants (U.D.I) ya ba Kengo, Katanga, Ntambwe Muamba, Djamboleka, Selemani, etc. Nionso wana na intérêt ya ba ndeko na ye. Sima, tomonaka Miko na 2004, tango akoma na ye kofanda na Afrique su Sud, na batu ya Programme ya Nations Unies pour le Développement (P.N.U.D.) na cadre ya réduction ya pauvreté sur la planète par l’exercice d’un commerce équitable.

Lelo oyo, wapi misala ya Miko na domaine ya téléphonie cellulaire ? Wapi ki entreprenariat na ye na Afrique mpe esika nionso soi-disant a investir ndenge batu babandaki ko vanter vision na ye futuriste? Batu oyo babandaki ko flatter ye, balobaka que azalaka généreux, wapi générosité wana concrètement na misala atika ? Asala nini na œuvres philanthropiques ? Mutu azalaki soi-disant passionner ya technologie, apesi mokongo brusquement na compagnie esala que ayebana na Afrique mobimba mpe abandi na ye kosala masanga ya vin !!!

Miko ayaki koteka domaine nionso ya Mont Rochelle epayi ya  Richard Branson. Akomaki kobela cancer ya colon. Il fallait ba opérer ye d’urgence, kasi opération esimbaki te mpe awe na mokolo mua mardi 25 septembre 2007, na Bruxelles, na Belgique. Akundami  mosika, na Johannesburg, na Afrique du Sud, mosika na R.D.Congo oyo epesi ye ba opportunités ebele oyo esali que ayebana comme un des pionniers ya téléphonie cellulaire ya Afrique. Ndenge moko na Seti, ayangana Congo, aponi kokundama na Portugal, oyo esundolaki ye mpe eye kondima ye tango akomi na mbongo. Est-ce que tosila koyoka que famille ya Miko ezali kosala ba démarches ou ezali kosenga que nzoto ya Miko ezonga kokundama na Congo, mabele oyo asalaki mpe a développer TELE.CEL.  oyo ezalaki symbole ya réussite sociale na ye mpe epesi lokumu na Afrique mobimba ? Sima liwa na ye, muasi na ye, Consolata Ruboneka, atekisi  villa ya Sandhurst, Sandton, na Johannesburg. Tokoma koyoka que ba moyens ekita makasi !

Il est vrai que Miko azalaki humble, accueillant, bon vivant, alingaki humour (koseka na kosekisa) mingi mpe asalisa entourage proche na ye. Koffi Olomide a immortalisa ye na ba nzembo mibale oyo : « Miko » na « Phaseur » na album Loi, mpe abuaka ye na nzembo « Chantou » na album V 12.

Micko par Koffi Olomide
Phaseur par Koffi Olomide

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo/mbokamosika.com

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *