LA TRAJECTOIRE DE VICTOR NENDAKA BIKA( rendue en lingala par Emmanuel Kandolo)

Victor Nendaka Bika « Pa Vicky »,

Octobre 1965, Kasa-Vubu (président), Tshombe (premier ministre), Nendaka (ministre de l’Intérieur) et Mobutu (commandant en chef de l’armée) se dirigent vers le parlement où le chef d’Etat annoncera l’éviction du chef du gouvernement et de son remplacement par Evariste Kimba. A droite de Tshombe, on voit le colonel Mulamba qui un mois plus tard deviendra 1er ministre.. 

Ba ndeko,  Tokomeka kobeta lisolo ya trajectoire ya un des grands patrons ya Sûreté nationale ya ekolo na biso. Avant wana, asalaki na secteur privé mpe ayaki ko s’initier avec succès na commerce tee na lolenge aye kokoma politicien. Sima ya lipanda a continuer na vie politique  tout en exerçant ba fructueuses affaires na ye na domaine agricole.Victor Nendaka Bika « Pa Vicky », fils unique ya tata Gabriel Angada na mama Elisabeth Tabapaya, abotami na Kumu, na mokolo mua 7 août 1923. Azali Ababua, originaire ya village ya Kumu, chefferie Barisi Mongingita,  secteur  ya Barisi Mongingita,  territoire ya Buta, district ya Bas-Uele. Na époque oyo, provinces ezalaki te. Asali scolarité na ye nionso epayi ya ba frères Maristes ya Buta, esika asilisi  Ecole moyenne, na 1941. Mbala moko abandi kosala na Compagnie Cotonnière Congolaise (CO.TON.CO.), na Buta, tee na 1945. Na 1943, abali Adeline Astrid  Mbooto.Wuta 1945 tee na 1949, azali employé ya Société du Haut Uele et du Nil (S.H.U.N.) na Kilomines.

Na suka ya contrat na ye, a décider kokende ko s’installer na Léopoldville. Azui mosala na Léopoldville (Kinshasa), comme aide-comptable na Etablissement Maurice Michaux et Compagnie, wuta 1950 tee na 1953. Kobanda 1953, Nendaka aboyi kosala na ba compagnies ya mindele. Akomi commerçant : azali na bar na ye na kombo ya « Bar Victor », afongoli Agence de voyage Nendaka esika ba Congolais bazali kosala ba réservations mpo na ko voyager na ba destinations miyike na Congo belge na Ruanda-Urundi, mpe azali lisusu na Agence ya assurance Nendaka  surtout mpo na ba Congolais oyo bazali na ba bars, salles de cinéma na ba commerces. Ye moko azali ko diriger yango, azali na mayele ya mombongo mpo agence d’assurance na ye asalaki yango mpo na ko assurer ba Congolais oyo mundele aponaki mpo bakende na exposition universelle ya Bruxelles. Nendaka akomii na pignon sur rue, asili koyebana mpe commerce na ye ezali kotambola malamu. Akomi kotangama parmi ba notables noirs ya Léopoldville. Azali kofanda na Cité Indigène ya Léopoldville, na avenue Kitega n° 137. Na 1954, azui immatriculation S.D. 128.252. Na même année, Association des Classes Moyennes Africaines (A.C.M.A.F.), ya Léopoldville, esalemi, mpe na Assemblée générale na yango, eponi  ye Président provincial na mokolo mua 6 août 1954.

Avant wana, 1953-1954, asilaki kozua ba « lettres de noblesse » na ye na lolenge azalaki ko bunda mpe ko défendre ba intérêts ya ba Congolais devant ba juridictions indigènes. Membre ya  Commission ya protection des indigènes kobanda 1954 tee na indépendance, na 1960.Nendaka alingi ba chiffres, azali comptable, en fin calculateur, hasard ezali na place te na vie na ye mpo azali un homme très structuré et méticuleux. Ayebi eloko nini alingi, azali na ba ambitions effrénées  mpe il s’arrange toujours en se donnant la possibilité ya ko réussir ba objectifs na ye. Azali méthodique dans sa vie quotidienne na éventualité ya ko atteindre but visé. Nendaka aluki koyebana personnellement na Buisseret, Ministre des Colonies (1954-1958) à travers positionnement social na ye : Président provincial ya A.C.M.A.F. Buisseret mpe abandi ko prêter l’oreille na Nendaka. Na septembre 1955, Nendaka asali voyage ya yambo na Bruxelles, na Belgique, sur invitation ya Fédération des Associations de Colons du Congo Belge et du Ruanda-Urundi (FEDA.COL.).

Asali d’une pierre deux coups : Alobeli ba intérêts tout comme ba propositions ya projets miyike ya ba Congolais, na tribune ya 4e Session ya Commission du Colonat mpe ayambami en audience epayi ya Roi Baudouin Ier. Nendaka atikala merveilleusement marqué na audience oyo mpe a souligna attention particulière oyo Roi apesaki na maye manso abandaki koyebisa ye en présence ya Ministre Boisseret. Tobunga te que nionso oyo esalemaki na bokasi bua Buisseret. Kobanda 1957 tee na 1959, azali un des trois délégués ya Classes Moyennes Africaines na kati ya Conseil ya Gouvernement. Retors ! Mpo na ko s’attirer bienveillance mpe komatisa notoriété na ye, azali kolekisa ba décisions favorables ya Conseil du Gouvernement envers la Classe moyenne comme étant gain de cause na ba aspirations ya ba Congolais. Notamment : Electrification ya Cité indigène ; accès na crédit immobilier ou ya ko sala une activité commerciale ; participation ya Classe moyenne na Conseil supérieur ya économie, etc. Na mokolo mua 6 août 1959, Cour d’Appel de Léopoldville, e condamner Nendaka  na peine ya  servitude pénale principale ya neuf mois (peine ya prison ferme) mpe na lourde amende financière mpo asalaki émission ya ba chèques sans provision ; escroquerie ;  tromperie na abus de confiance. Pourquoi Nendaka, notable ya ndenge wana, azali na commerce prospère, azali ko tenir mordicus na image de marque na ye, évolué, immatriculé, marié et père de famille, akende kosala bêtise ya lolenge wana pendant que azali mpe na accès na crédit mpo azali na ba biens matériels hypothécables ? Oyo ezali plan très astucieux mpo na ko établir un parfait alibi ya kolimuisa ye na circulation. Tangu Congolais azali kokanisa que Nendaka azali na boloko mpo na ba infractions oyo etangami likolo, ye, azali na ba bonnes dispositions ya Sûreté coloniale belge na Léopoldville, esika azali kozua formation na domaine ya renseignement. Tobunga te que Nendaka atikala kozala fonctionnaire colonial te (asala mosala na l’Etat te). Au lieu ya neuf mois oyo bakatelaki ye, Nendaka abimi na « boloko » sima ya sanza misatu ! Personne, alors, personne atikala komona Nendaka na ba prisons ya Makala ou na Ndolo. Azali mutu ayebani makasi na Léopoldville, forcement alingaki ayambama malamu na boloko. Batu batikala penza komituna mituna intéressants te mpo na koyeba esika nini penza Nendaka azalaki ? Nendaka asalelaki nani ba faux chèques ? A escroquaki nani au juste ? Sima ya wana, na fin 1959, Nendaka aponami, Vice-Président national ya Mouvement National Congolais (M.N.C.-L.), na  Congrès esalemaki na mokolo mua 23 octobre 1959, na Stanleyville.

Comment mutu oyo azali casier judicaire mpo na condamnation ya prison ferme ya 9 mois, a exercer ba droits politiques na ye comme si de rien n’était ? Est-ce que Nendaka azali lisusu crédible mpo azala candidat ya M.N.C.-L na Vice-Présidence nationale ? Mutu te na M.N.C.-L asenga na ba candidats ba lakisa preuve que bazali na condamnation pénale te en produisant l’extrait de casier judiciaire. En tout état de cause, soki yango esalemaki, Nendaka alingaki azala démasquer mpo soki asali boloko, akozala na casier judicaire. Soki azali na yango te, a ko expliquer absence na yango ndenge nini mpo akangemaki ? Awa lisusu, batu bazali imprudents ! Sans le savoir, bakotisi un indétectable surnois kati na bango. Parallèlement, na 1960, Nendaka akomi Membre ya Conseil d’Administration ya Info Congo ; Membre ya Conseil ya Cité ya Léopoldville ; Membre ya Comité ya Revue mensuelle, La Voix du Congolais.Tangu Lumumba akangamaki na décembre 1959, na répression esalemaki na manifestation ya M.N.C.-L., ba gendarmes babomi batu na masasi mpe misusu bazoki makasi. Durant procès ya Lumumba, à la surprise générale, Nendaka a chargea ye na audition devant Procureur de la République ya Stanleyville (Kisangani). Pierre Leroy, Gouverneur ya  province Orientale nde apuataki ye azali  penza na soif du pouvoir mpe situation  difficile oyo Lumumba azali ko connaître ezali ko profiter na ye tout comme ako s’embarrasser te ko tirer bénéfice na yango. En termes  moins polissés, elingi koloba que Nendaka  azali prêt ya ko poignarder Lumumba mpo ye azua esika ya leader ya Mouvement na éventualité ya ko diriger Congo !

En bon manipulateur, a s’appuyer na toli Léopold Monzikatebe, Chef ya Centre Extra-Coutumier ya Buta, apesi ye, selon version de fait oyo Nendaka abeteli ye sur ba circonstances ya kokangema ya Lumumba. Toli yango nde nini ? « Kabuana na Lumumba, récupérer M.N.C.-L. ekoma mouvement na yo ! ». Kobanda 20 janvier tee 20 février 1960, Table ronde politique esalemi na Bruxelles, na Belgique. Na absence ya Président National ya  M.N.C.-L, Patrice Lumumba, Victor Nendaka, Vice-Président nde akumbaki délégation ya M.N.C.-L. na ba travaux oyo. Sur place, ba Congolais basangani na liloba moko en exigent libération ya Lumumba esika atiamaki na boloko na Jadotville (Likasi), na Katanga. Unité nationale oyo ezalaki prévue te na ba calculs machiavéliques belges. Lumumba aye na Bruxelles mpe a récupérer ebonga na ye ya Président. Na retour na Congo, na fin février 1960, Nendaka a présider ba travaux ya Congrès ya ba partis unitaristes na Bukavu. Ba élections législatives, sénatoriales et provinciales esalemi kobanda na 11 tee na 22 mai 1960. Wuta avril 1960, Nendaka azali lisusu Vice-Président ya M.N.C.-L  te mpo ba instances ya parti, sima ya audit interne, eyaki ko découvrir ba irrégularités et autres malversations financières pendant que abandaki ko assumer intérim ya Président National. Ba écarter Nendaka, alongue mpe akeyi kosala Mouvement National Congolais-Nendaka (M.N.C.-N.). Asali yango na moins ya trois semaines ya ba élections. Pourquoi M.N.C.-L. efundaki Nendaka na justice te mpo azali déjà na cassier judicaire mpo na boloko oyo asalaki na août 1959 ? Est-ce qu’ezali ya solo  ou prétexte tango ba découvrir que azali au service ya ba Belges ? Selon Nendaka, ye alogue mpo a découvrir que Lumumba azali kozua financement ya ba pays ya Pacte de Varsovie. En plus, mutu oyo azalaki kobelela unitarisme, akomi mbala moko kolobela fédéralisme. Yango elakisaki que mission na ye ezalaki ya ko éclater bomoko ya M.N.C.-L. na même démarche ya Kalonji.

En réalité, azali ko œuvrer na division ya Congo na schéma ya Tshombe na Kalonji na but ya dislocation kati na ba Congolais mpo e déboucher na ba Etats fédéraux. Akomaki mpe kokumisa fédéralisme selon Association des Ba Congo (A.BA.CO.).  Apesi candidature na législatives provinciale et nationale na circonscription ya  Bas-Uele, kasi aponami te. Au contraire, ba partis unitaristes, en tête M.N.C.-L. nde balongaki. Le 14 septembre 1960, Colonel Mobutu asali premier coup d’Etat militaire na Congo mpe na Afrique. Membre ya groupe de Binza tout comme Kandolo, Nendaka, Bomboko, Ndele, Litho, etc. Mobutu asali Gouvernement ya ba Commissaires généraux (ba membres ya groupe Binza, ba syndicalistes na ba étudiants).

Gouvernement oyo nde e nommer (Ordonnance présidentielle ya Kasa-Vubu)  Nendaka, na octobre 1961, Administrateur en Chef ya Sûreté nationale. Ye nde akitani Christophe Muzungu, Administrateur en Chef ya Sûreté nationale (ye nde Lumumba aponaki, wuta Congo ekomi lipanda), successeur ya Colonel Frédéric Vandewalle, oyo azalaki Administrateur en Chef ya Sûreté ya Congo belge Ruanda-Urundi. Damien Kandolo, akomi Commissaire général adjoint na Affaires intérieures, chargé ya sécurité, mpe Chef hiérarchique ya Nendaka. Commissaire général ya Intérieur nde José Nussbaumer. Conclave ya  Lovanium esalemi wuta 22 juillet tee na 2 août 1961. Yango nde ebimisi Cyrille Adoula (groupe de Binza) Premier Ministre ya Congo mpe successeur légal  ya Lumumba na poste ya Premier Ministre. Christophe Gbenye (M.N.C-L.) a récupérer ebonga ya Ministre de l’Intérieur.

Azalaki wana tangu ya Gouvernement Lumumba.  Na mokolo mua 12 décembre 1961, a publier communiqué ya suspension ya Administrateur en Chef ya Sûreté nationale,  Nendaka, sans pour autant a consulter Premier Ministre Adoula.  Gbenye azui lisusu initiative ya ko mettre sous sceller siège ya Sûreté nationale, na Kalina. Nendaka a prévenir Colonel Mobutu (groupe de Binza), Chef d’état major général ya Armée Nationale Congolaise, immédiatement atindeli  ye ba para commandos ya camp 100 maisons ya Binza (actuel camp Tshatshi), mpo ba protéger intégrité physique na ye mpe ba sécuriser ba installations ya Sûreté nationale. Action oyo e fragilisaki Gbenye, esengelaki akima na lombangu mpo ekomaki évident que vie na ye ekomaki na danger de mort ! 

Nendaka azali officier de renseignement formé mpe azali na compétence générale ya Officier ya Police judiciaire. Azali na carnet d’adresse mulayi. Proche ya mindele, ayebi ba travers na ba secrets na bango malamu ! Azali na Classe Moyenne, mpe azali ko fréquenter mindele na batu moindo. Azali na bar, esika ba ndumba bayaka (bar sans fréquentation ya ba ndumba, ezali bar en faillite mpo ndumba nde amatisaka succès ya bar na ko attirer mibali mpe ko augmenter consommation ) mpe bazali ko récolter ba précieuses informations epayi ya ba clients na bango mpo na compte ya Nendaka. Azali Directeur ya agence ya voyage, en passant, okotikela ye ba renseignements personnels, tout comme na agence ya assurance. Azali na Conseil d’administration ya presse écrite. Azali au fait ya nionso ezali koleka na population indigène na libanda tee na ba prisons. Position sociale na ye : Président provincial ya A.C.M.A.F, Défenseur ya ba Congolais devant ba juridictions indigènes. Délégué ya Classes Moyennes Africaines na kati ya Conseil ya Gouvernement, Membre ya Conseil d’Administration ya Info Congo, Membre ya Conseil ya Cité ya Léopoldville, Membre ya Comité ya Revue mensuelle, La Voix du Congolais. Azali na familiarité makasi na Eglise catholique romaine locale. Yango ezali ba sources de données très volumineuses ya information. Kobanda 1956, Nendaka abanda kokende Bruxelles régulièrement. D’ailleurs, na 1961, na mobulu ya assassinat ya Lumumba, Belgique e exfiltraki famille na ye na ya Kandolo, etindi bango na abris na Belgique. En tant qu’Administrateur en Chef ya Sûreté nationale, Nendaka nde a organisaki transfère ya Lumumba na Elisabethville (Lubumbashi) esika azalaki assassiner elongo na Mpolo na Okito. Ezali toute la chaine ya groupe de Binza mpe na ba Conseiller lokola André Lahaye, ancien Commissaire principal, Administrateur adjoint ya province ya Léopoldville sous mandat ya Colonel Vandewalle.

Sika,  actuelle Conseiller ya Kandolo. Nendaka asali 5 ans en tant qu’Administrateur en Chef ya Sûreté nationale mpe a travailler na Kandolo pendant 4 ans étroitement. Juillet 1962, Kandolo akomi Haut fonctionnaire mpe Secrétaire général ya ministère ya Affaires intérieure ; Coordonateur ya ba Affaires civiles et militaires tangu Président Kasa-Vubu ayaki ko suspendre Parlement  mpona division ewuti na lolenge ekolo ekabuanaki na bitemi mibale Groupe de Binza, na Léopoldville, na ba Lumumbistes, na Stanleyville. Na 1964, Nendaka aluki ko poser candidature mpo akoma Président national ya Rassemblement des Démocrates Congolais (RA.DE.CO.) mpe Central Intelligence Agency (C.I.A). nde ezali ko financer parti oyo. C.I.A. esengaki na Nendaka atikela Cyrille Adoula a poser candidature unique na ebonga ya Président ya parti  RA.DE.CO. Nendaka amekaki ko insister en avançant argument ya démocratie, mbala moko Ambassadeur ya U.S.A. na Léopoldville, Mc Murtrie Godley, ayebisi ye polele que soki alingi kokoma Président ya RA.DE.CO., esengeli ayeba que U.S.A. ekokata financement ya parti oyo.

Nendaka abenda nzoto mpe atikeli Adoula. Bango banso bazali batu ya groupe de Binza. Finalement, Nendaka ayaki kosala ndenge C.I.A. esengaki ye mpo asala alliance na Tshombe. Yango wana toyaki komona Mobutu, Ndele, Nendaka, Litho na Bomboko basali lisanga na Tshombe. Nendaka azali na mémoire ya éléphant, tenace mpe rancunier ! A faire élire, Chef coutumier na ye, Léopold Monzikatebe, Chef ya Centre Extra-Coutumier ya Buta, na ebonga ya Président provincial ya RA.DE.CO. Wana première étape na nzela ya revanche contre ba Lumumbistes ya Bas-Uele oyo balongolaki ye.  Deuxième, ezali Alliance na Convention Nationale Congolaise (CO.NA.CO.) ya Tshombe nde esalaki que bazua total ya dix sièges oyo ezalaki na Uele. Mpo na kosukisa, asali répression  sanglante mpe chasse à l’homme  contre ba lumumbistes en utilisant ba moyens ya l’Etat : Armée nationale, Sûreté nationale, ba gendarmes katangais,  ba troupes belges na ba mercenaires kili kili : Sud-africains, Rhodésiens na ba aventuriers nionso ya mindele babandaki ko traîner na Afrique.

Ezali territoire na ye, mokonzi na ye coutumier nde azali mpe mokonzi politique en alliance na Tshombe. Ye moko Nendaka ayebi moko na moko mpo ba lumumbistes wana nde ba longaki ye na ba élections ya 1960, tango akendaki kosala M.N.C.-N. mpe azali na ba renseignements plausibles ewuti na terrain. Na ba élections législatives, sénatoriales et provinciales  oyo esalemi wuta 18 mars tee na 30 avril 1965, Nendaka mpe asali parti satellite na kombo ya Front Démocratique Congolais (F.D.C.) oyo ezali na kati ya RA.DE.CO. mpo yango esangisi 50 partis politiques satellites. Apesi candidature na ye na Buta, esika aponami Député national mpe provincial na compte ya RA.DE.CO. 

Atiki Parlement, andimi kokota na Exécutif.Na mokolo mua 7 juillet 1965, akomi Ministre ya Intérieur, na Gouvernement Tshombe. En tant que Ministre ya Intérieur nde a présider Congrès ya ba provinces martyres, du 26 au 31 août  1965, sima ya bitumba ya pacification ya Congo na bolongi rébellion oyo ekabolaki ekolo na biso na biteni bibale. Le 24 novembre 1965, Général Mobutu asali deuxième coup d’Etat militaire na République Démocratique du Congo. Général Mulamba azui ebonga ya Premier Ministre et Chef du Gouvernement. Gouvernement ebimi, le 28 novembre 1965, Nendaka akomi Ministre ya Transports et Communication. A occuper poste oyo tee na 17 août 1968. Kobanda 17 août 1968 tee na 31 juillet 1969, Nendaka azali Ministre ya Finances, Budget na Portefeuille. A continuaki ko conduire ba mesures monétaires de 1967 en visant principalement équilibre ya ba finances publiques, lutte contre toute forme ya ba circuits spéculatives, répartition équitable ya ba financements na ba investissements favorables na relance économique mpe na augmentation ya croissance. Sous Nendaka nde ba avoirs extérieurs en devise ya Congo esalaki bond munene de 46 Millions ya $U.S. na 1967 emati na 170Millions na époque oyo marché ya cuivre ezali ya komata. Stock monétaire ewuti na 1700 millions $U.S. emati na  270millions $U.S. wana sous Nendaka.

Na 1er juillet 1969, Président Mobutu a écarter Nendaka na Gouvernement bien que azali na ba très bons résultats, mpo na ko éloigner ye, atindi ye na Bonn, na qualité ya Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire. Tangu azongi na Kinshasa mpo na ko participer na Congrès extraordinaire ya M.P.R. oyo esalemaki kobanda na 21 tee na  23 mai 1970, na cité du parti na N’Sele. Congrès oyo endimaki candidat unique, Mobutu, mpo na élection présidentielle ya 1er novembre 1970, mpo na mandat ya 7ans. Nendaka abandi kosala sala ba conférences mpe kopesa ba interview, mpe akeyi na Université Lovanium (UNI.KIN.), na cadre ya rencontre na ba étudiants. Kuna abandi ko pelisa moto en forme de vœux concrétisation ya promesse Président Mobutu asalaki na prise de pouvoir na 1965 mpe a renouveler yango na novembre 1966, sima ya une année ya pouvoir que akozongisela ba civils pouvoir.

Mpo na Nendaka, Congrès oyo ya M.P.R. ekosenga na ba politiciens  ba milengele na ba élections  mpo ba militaires non seulement bako respecter promesse na bango, kasi esengeli mpe bazonga na ba casernes. Na même moment, ba bulletins d’informations (B.I.) ya Agence Nationale de Documentation (A.N.D.) ezali ko décrire masolo nionso entre Bomboko, Nendaka na Colonel Bangala, Gouverneur ya ville ya Kinshasa. Président Mobulu atiki Bangala mpe alongoli bango na ba postes respectives : Bomboko, na Washington, mpe Nendaka, na Bonn, le même jour le, 2 juin 1970, na Kinshasa, juste sima ya participation na Congrès extraordinaire ya M.P.R. Batikala na Kinshasa sans possibilité ya kozonga na ba juridictions na bango mpo na remise et reprise. Le, 5 octobre 1971, Bomboko, Nendaka na Colonel Bangala bakangami bango banso mpo na atteintes à la sûreté intérieure de l’Etat, subversion mpe na incitation à un mouvement insurrectionnel. Ba accusations très graves ! 

Bien que Nendaka akangemaki, libérer kasi nanu penza réhabilite te mpo azalaki naino na cassier judicaire, a bénéficier na mesures ya novembre 1973 sur la Zaïrianisation. Azui ba élevages, plantations surtout ya café na ba biens immobiliers na ba actions kili kili na ba banques.Mars 1975, Président Mobutu a réhabiliter ye, mpe apesi ye ebonga ya Délégué général ya Office National du Café (O.N.C.). Yango nde ekoma Office Zaïrois du Café (O.ZA.CAF.), Nendaka afandi wana tee na 1983. mpe akueyisi yango. En plus, a continuer ko conserver ba quotas mpo na exportation ya ba productions na ye priver ya café en concurrence déloyale na O.ZA.CAF. Na 1976, Nendaka asengi na Président a nommer Commissaire d’Etat (Ministre) na Economie nationale et industrie ya sika, Murahiri.

Ce dernier, azalaki makasi na production agricole na ba excellents résultats  en terme ya augmentation ya productivité. Etonnamment, azali ko préconiser développement rapide ya infrastructure ya axe Kisangani-Isiro-Bunia-Buta mpe na Goma na proposition ya kosala rapidement  aéroport international ya Bangoka, na Kisangani mpe na aéroport international ya Goma. Comment Commissaire d’Etat azali kopesa priorité na économie extravertie sans pour autant a assurer autosuffisance agricole économique ? Nionso oyo mpo na kowela kobimisa production ya café vers l’étranger parce que Nendaka azalaki à la fois P.D.G. ya  Office Zaïrois du Café (O.ZA.CAF.) mpe producteur privé munene ya café.Kobanda 15 tee na 16 octobre 1977, ba élections esalemi mpo na koponama ya une partie ya ba Commissaires politiques. Nendaka aponami Commissaire politique mpe komi Membre du Bureau politique ya M.P.R. parti-Etat. Atikali na ebonga oyo tee na février 1981. Asali mandat mosusu en qualité ya Membre du Bureau politique 3 janvier 1985 tee na 29 janvier 1985 Na 2 septembre 1980, Comité central ya M.P.R. parti-Etat esalemi, akomi Membre du Comité ya M.P.R. parti-Etat.Wuta avril 1983 tee na mars 1984, azali na ebonga ya  Premier Vice-Président du Bureau permanent du Comité central ya M.P.R. parti-Etat, deuxième personnalité ya Etat. Na 3 janvier 1985 tee na 29 janvier 1985, asali deuxième mandat en tant que Membre ya Bureau politique ya M.P.R. parti-Etat. Dans la foulée, azali reconduit mpo na deuxième mandat na Comite central. Atikali wana tee na allocution President Mobutu asali na  cite de la N’Sele,  mokolo mua 24 avril 1990. 

Wuta chute ya régime Mobutu, Nendaka akomaki na ye ko vivre na poto, Canada, Belgique, Suisse,  azali mpe komonana na France.Na mars 2000,  Chambre belge des représentants, endimaki kosala Commission d’enquête chargée ya ko déterminer penza lolenge nini mpe ba circonstances exactes oyo ekumbaki na assassinat ya Premier Ministre Patrice Lumumba  mpe lisusu kolakisa polele implication avérée ya ba autorités politiques belges. Kombo na yango ezali : Commission d’enquête sur l’assassinat de Patrice Lumumba. Nendaka alekaki devant Commission oyo. Bon ! lolenge makambo mosusu esalemaki : mise à l’écart ya Professeur Jean Omassombo Tshonda, huit clos na confrontation entre Nendaka na Munkamba, etc.

ezalaki bilembo ya doute ya recherche ya vérité epeyi ya Etat commanditaire ya liwa ya Lumumba. Wana ezali kaka biso moko ba Congolais nde tozali na devoir ya mémoire wana !Nendaka akufi na mokolo mua 22 août 2002, na Bruxelles. Akundami na Kinshasa, na cimetière de la Gombe. De son vivant, Nendaka asombaka mabele bakokundela ye na cimetière de la Gombe. Esika wana ezali ya batu misatu : ye moko Nendaka, ndeko na ye, Pae Pierre.  Esika wana ezali na gazon très bien entretenu sans pierre tombale, na lolenge bakunda batu na cimetière national ya  Arlington na D.C., na USA. 

Distinction honorifiques :Grand Cordon ya Ordre national du Léopard ;Médaille d’Or et d’Argent ya  Mérite Conjugal ;Médaille d’Or ya Ordre du Mérite Civique ;Médaille de la Guerre Civile ;Médaille d’Or ya Ordre du Mérite Agricole ;Commandeur na Médaille d’or ya Ordre de l’Étoile africaine ya Belgique ;Officier ya Ordre de la Couronne ya Belgique ;Conférence Nationale Souveraine Commission des Biens Mal Acquis DOSSIER 51 Monsieur Victor NENDAKAMonsieur Victor NENDAKA est l’acquéreur des plantations (Plantations ex. INGA), dans le Haut-Zaïre et une pêcherie. Sa dette se chiffre à  Z. 225 367 647.00.Monsieur NENDAKA a versé à la Commission deux milliards.

Il sollicite un planning de remboursement.Votre Commission propose que le solde soit payé dans le moratoire. Faute de quoi, confiscation de tous les biens devra être requise.DOSSIER 52 Feu LANZA GATANGA (cf. Associé de Monsieur Victor NENDAKA)Avec Victor NENDAKA, Feu a acquis la plantation PLANTADEM. Leurs dettes se chiffrent à Z. 216 659 371 919.00.Monsieur NENDAKA a versé pour le compte de son associé un milliard de Zaïres et sollicite un planning de remboursement de la Conférence Nationale Souveraine.Votre Commission propose également que le solde restant dû soit apuré dans le moratoire sous réserve d’une expertise dans les lieux où sont implantées les plantations. Faute de quoi, confiscation de tous les biens.

Nendaka azali un des rares mobutistes oyo afuta mbongo mpe niongo na ye pendant ba travaux ya Conférence Nationale Souveraine. C’est la raison pour laquelle kombo na ye etangama te na liste de personnes assujetties à une contribution spéciale pour la reconstruction de la nation et au rapatriement de la moitié de leurs avoirs à l’étranger, en raison de signes extérieurs d’une richesse liée à leur participation à la gestion des biens publics sous la deuxième République et la pré-transition. Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo/mbokamosika.com

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *