Evocation: La biographie de Gabriel Marcel Lengema Dulia Makanga rendue en Lingala par Emmanuel Kandolo

Ba ndeko,

Vaut mieux tard que jamais ! Ndenge tolakaki, lelo toko continuer suite ya masolo  ya biographie ya Léon Kidicho. Tokolobela attitude ya famille ya Kidicho na liwa ya moko na bango tee na lolenge likambo ekomaki na justice. Tokomeka mpe kosala biographie ya Marcel Lengema.

Yaoundé 1963. Lors de la signature de la Convention de Yaoundé entre les pays africains et la CEE. Le Congo-Léopoldville fut réprésenté par Marcel Lengema, sécrétaire d’Etat aux Affaires africaines.(Source photo: Twitter)

Gabriel Marcel Lengema Dulia Makanga azali muana ya papa César Lengema na mama Elisabeth Makanga. Azali Ngbandi, originaire ya chefferie Mokwangi,  village ya Bwaka, territoire ya Banzyville (Mobayi-Mbongo), district ya Ubangi, province ya Equateur. Abotami na mokolo mua 3 janvier 1931, na Stanleyville(Kisangani).

César Lengema, tata na Marcel, azalaki Sergent-comptable, moniteur na Colonie scolaire ya Nouvelle-Anvers (Makanza). Mpe abundi bitumba ya première guerre mondiale na 1914-1918. Aye kozua ebonga ya Chef ya Centre extra-coutumier ya Stanleyville kobanda1936 tee na1951. Mutu moko très charismatique mpe très compétant et extrêmement respecté na Stanleyville. Asala kombo.

Mama aboti Marcel Lengema, Elisabeth Makanga, azali ngambo moko Topoke, ngambo mosusu Abuabua Papa César Lengema na mama Elisabeth Makanga, baboti kaka bana bale : Marcel Lengema na Julienne Marie Lengema, oyo abotami mpe na Stanleyville na mokolo mua  1er août 1936.

Marcel Lengema asali école primaire na ye na Stanleyville. Sima ya wana, akeyti kosala enseignement secondaire na Buta, epayi ya ba Frères Maristes. Tango asilisi kelasi na ye, mbala moko akoti na Administration coloniale, esika azui ebonga ya Commi-chef de poste ya station Météo, na service ya télécommunication ya Stanleyville esika asali wuta  1948 tee 1959.

Akeyi Belgique na 1959, kuna akomi Directeur ya Bureau ya Mouvement National Congolais-Lumumba (M.N.C.-L.) na Bruxelles, na 1960. Azalaki na moninga na ye Joseph Mobutu. Mpe na molongo, a participer na ba travaux ya Table Ronde politique oyo esalemi na Bruxelles kobanda 20 janvier tee na 20 février 1960.

Toujours na Belgique, azali na kati ya ba jeunes Congolais ya première promotion ya ba diplomates oyo bayaki na Belgique, kosala formation na Ecole d’Administration,  na Bruxelles. Abimaki mutu ya liboso ya promotion oyo.

Na ba élections législatives, sénatoriales et provinciales oyo esalemi na mikolo mia 11 tee na  22 mai 1960, na étendue mobimba ya Congo,  aponami comme Sénateur ; Membre ya Comité provincial ya MNC-L  mpo na province Orientale ; Conseiller mpe  Membre ya  Conseil de la ville ya Stanleyville Na  juillet 1960, suite na mutinerie ya Force publique na  Léopoldville mpe na  Thysville, Lumumba azongisi Joseph Mobutu na Armée mpe azui pete ya Colonel. Marcel Lengema a kitani ye na ebonga ya Secrétaire d’Etat  na présidence ya Conseil. Tango Colonel Mobutu asali coup d’Etat militaire na mokolo mua 14 septembre 1960, Gouvernement Lumumba ekueyi mpe Colonel Mobutu a instaurer ba Commissaires généraux. Lengema alandi Gizenga na Stanleyville mpe akoti na Gouvernement Gizenga na qualité ya Secrétaire d’Etat à la présidence du Conseil et aux Affaires étrangères.

Na août 1961, Conclave ya  Lovanium esalemi mpe na kati kuna balobeli réconciliation nationale. Na yango, Gouvernement ya union nationale esalemi mpe ekambami na Cyrille Adoul, Premier Ministre. Antoine Gizenga andimi ebonga ya Vice-Premier Ministre mpe Marcel Lengema, azui poste ya Secrétaire d’Etat chargé de l’Assistance technique auprès de la présidence du Conseil des ministres (Premier Ministre). Awa nde ba dossiers nionso ya assistance administrative ;  médicale et sociale ; culturelle et intellectuelle  mpe na scientifique ezali traiter. 

Na ba Gouvernements Adoula ya 2 août 1961 ; 11 juillet 1962 ; 18 avril 1963, Lengema azalaki na ebonga ya Secrétaire d’Etat na coopération au développement  mpe aye kokoma Secrétaire d’Etat na Affaires étrangères, wuta avril 1963.

Lengema nde azali na tête ya assistance technique ye nde a concevoir mpe a mettre en œuvre coopération technique  wuta Président Kasa-Vubu tee na ndenge ezali ko continuer lelo oyo. Na administration na ye nde eyaki kokoma Coopération internationale (aide au développement ; assistance technique na ba domaines miyike, ba bourses d’études, stages ya formation mpe ya perfectionnement, etc.).  Bomboko azalaki rensponsable ya Politique étrangères (diplomatie) na Commerce international. Lengema nde azalaki ko s’occuper na Coopération internationale.

Na 9 juillet 1964, tango Gouvernement Tshombe esalemi, alongue mpe atikali kaka na mandat ya Sénateur.

Na 1er août 1964, République Démocratique du Congo ekomi na Constitution ya sika (eyebani mpe na kombo ya Constitution de Luluabourg, esika esalemaki). Na mbula elandi, ba élections législatives, sénatoriales et provinciales esalemi kobanda na 18 mars tee na 30 avril 1965. Lemgema aponami Sénateur mpe Député national. Akokaki ko siéger na ba Chambres nionso mibale te mpo article 172 ya Constitution eboyaki cumule ya mandat parlementaire na ba deux Chambres. Lengema aponi ko siéger na Chambre ya ba Députés (Assemblée nationale). Kuna, azali na kati ya Grande Commission politique, Administrative et Judiciaire. Azui ebonga ya Président ya Sous-commission ya Affaires étrangères, de 1965 tee na 1970.

Tango Général Mobutu asali deuxième coup d’Etat militaire na ye le, 24 novembre 1965, asali appel na un des meilleurs ami na ye, Marcel Lengema. Sous prétexte  que azalaki na Assemblée nationale, Président ya Sous-commission ya Affaires étrangères, azalaki tout le temps na étranger pour le compte ya Président Mobutu durant deux ans avant nomination na ye officielle.

Na mokolo mua 10 janvier 1967 a nommer ye Représentant personnel du Président de la République avec rang d’Ambassadeur itinérant lors qu’il est investi d’un mandat en dehors du territoire national. Elingi koloba que Lengema akotindama na kati ya Congo mobimba na ba missions confidentielles ou officielles  Président a confier ye. Soki mission ou ba missions  wana ezali à caractère international a ko bénéficier na inviolabilité ya personne de l’agent diplomatique tout comme na immunité diplomatique na qualité ya Ambassadeur itinérant.

Atamboli mokili mobimba na cadre ya ba missions politiques oyo Chef de l’Etat a charger ye. A part Président Mobutu, Lengema azali Congolais oyo a voyager mokili mobimba mpe a voyager mingi ya mingi à travers le monde bisika biyike Président Mobutu azali kotinda ye.

En plus, a assister na ba Assemblées générales miyike ya Nations Unies(O.N.U.) ; na ba réunions ministérielles na kati ya Organisation de l’Unité Africaine (O.U.A.) ; na ba réunions ministérielles na kati ya lisanga ya ba pays non-alignés ; a accompagner Président Mobutu à travers le monde na cadre ya ba visites de travail, visites officielles, na visites privées na ba pays ebele.

Ata diplomate Zaïrois moko te atamboli lokola ye. Tous les jours, alors tous les jours na radio na télé ya Zaïre ba balobelaka Lengema. Ba journaux ya Zaïre mpe ya mokili ezali kolobela Lengema. Ezali plaisir kokutana na Lengema na correspondance na ba aéroports étrangers. Personnellement nazua occasion wana mingi. Wana ezalaki époque oyo Zaïre ezali na politique étrangère bien structurée et définie.

Na ba élections législatives oyo esalemaki na mokolo mua  2 novembre 1975, Lengema aponami Commissaire du Peuple ya Circonscription électorale ya Kisangani. A continuer toujours kozala Ambassadeur itinérant mpo suppléant na ye nde azalaki wana.

Na août 1980, Niwa Mobutu akomi Ambassadeur itinérant (Ambassadeur itinérant azalaka toujours rattaché na présidence de la République). Président Mobutu apesi Lengema ebonga ya Secrétaire d’Etat na Coopération Internationale, na kati ya Gouvernement Nguz. Pendant mandat na ye, Lengema a négocier mpe a signer ba accords internationaux ebele oyo ezali ko engager Conseil Exécutif (Gouvernement) na ba partenaires étrangers na ba domaines miyike ya coopération internationale.

Na janvier 1984, Niwa Mobutu akitani Lengema na poste ya Secrétaire d’Eta na Coopération internationale, Gouvernement Kengo (azali Premier Commissaire d’Etat depuis 1982). Lengema azongi na présidence comme Conseiller privé ya Chef de l’Etat (officiellement). Kasi, officieusement azali na ye kaka na Secrétaire d’Etat ya Coopération internationale mpo véritable mission na ye ezali sika awai ya ko encadrer mpe surtout ko perfectionner Niwa na domaine ya diplomatie mpe na ya coopération internationale.

Na juillet 1985, Lengema azongi na Gouvernement en qualité ya Commissaire d’Etat (Ministre) na Commerce Extérieur, na Gouvernement Kengo. Azala mbala na mbala Membre ya délégation Zairoise na ba grandes réunions et autres conférences internationales. Atikala wana tee na mai 1990.

Toujours pene pene na Président Mobutu, Lengema andimaki kokoma Président intérimaire ya Front Patriotique Congolais (F.P.C.), satellite ya Mouvance présidentielle. Malheureusement, wuta 1995, moyen akota lisusu na Gouvernement ezalaki te puis que abandaki kobela maksi suite na empoisonnement oyo ememi ye na liwa na mokolo mua 23 février 1995. Baleli ye na Kinshasa tout comme na Kisangani, esika akundami.

Lengema, azali Grand Officier ya Ordre national du Léopard mpe azali na 50 décorations étrangères : France, U.S.A., Belgique, Brésil, Uruguay, Pays-Bas, Italie, Vatican, Argentine, Japon, Chine, Vietnam, Taïwan, Chine, Mauritanie, Sénégal, Gambie, Haute-Volta, Dahomey, Congo-Brazzaville, Zambie, Tunisie, Rwanda, Ouganda, Burundi, Togo, Mali, Guinée-Conakry, Egypte, Algérie, Madagascar, Soudan, Ethiopie, Grec, Mexique, Iran, Arabie Saoudite, Corée du Nord, Corée du Sud, Australie,Suisse, Luxembourg, Grande Bretagne, Canada, Norvège,  Allemagne Fédéral, Pologne, Chypre, Inde, Maroc, Pakistan, Turquie, etc.…

Lengema azalaki mpe Homme d’Affaires, ye nde azalaki Président ya Groupe Lengema : plantations, élevages, limonadière Cristalo, immeubles entre autre oyo ebandaki kobengama Interfina (eyabanaki mingi na kombo ya  Immoéquateur. Banda Lengema azuaki yango na cadre ya Zaïrianisation (1973), a baptisaki yango Immmeuble Lengema. Notons que asilisa niongo na yango na rétrocession. Mutu nionso oyo akoma na Kisangani akoki kobunga immeuble oyo te. Wana nde esika Consulat ya Belgique ezali mpe ezali na ba batiments na sima wana esika école belge ezali (loyer ya école belge, consulat na ba expatriés nionso oyo ba futelaka wana esalaka pas moins de 30.000$ U.S. par mois). Yango ezali situer na commune ya  Makiso sur le boulevard Mobutu, en face ya Grande poste ya Kisangani. Azali mpe na ba biens na poto.

Azalaki mpe Administrateur na Banque commerciale Zaïroise, Zaïre mobile Oïl, SO.TEX.KI.,  etc.

Bana ba Lengemana Kengo wa Dondo babalana. Muana ya mobalei ya Lengema nde abala Chantal Kengo. Wuta wana akoma kobengama Chantal Lengema Kengo wa Dondo. Azali Médecin (Chirurgien Dentiste),oyo azali ko exercer awa na France mpe na Emirats Arabes Unis.

Lengema a financer une grande partie ya misala ya réfection ya Cathédrale ya Kisangani.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo/Mbokamosika.com

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *