Chansons souvenirs: «DIT TONTON», Vicky Longomba, et « BALINGAKA NGAI TE », Franco Luambo.

Dit Tonton, Vicky Longomba et l’OK-Jazz

Mbuakela ewuti na conflit na gestion ya ba Editions Epanza Makita. Franco asalaki ba Editions oyo sima ya voyage na Bruxelles mpe na Paris tango O.K. Jazz eyaki ko enregister na compte ya Editions Surboum African Jazz, ya Grand Kallé. Na retour na Léopoldville (Kinshasa), suite na médiation esalemaki na Justin-Marie Bomboko, na bar Chez Là-Bas, epayi ya mama Ilondo, Franco na Vicky bazongani lisanga mpe neti bazalaki associer na Editions Loningisa, e fusionner na Epanza Makita, mpe bakomi kokabola mutu na mutu na hauteur ya 50%.

Bazongeli formule ya kala sima ya départ ya ba co-fondateurs Brazzavillois (tobosana te que O.K. Jazz ezalaka ya Franco te. Ezali orchestre ya ba Congo mibale : Brazzaville na Kinshasa.). Au fur et à mesure ya ba départs nde eyaki kotikala na maboko ya Franco ye moko. Kasi atikala ata mokolo moko te ko nier origine ya orchestre mpe na contribution ya moko na moko. C’est pourquoi, na miziki na ye abandaki toujours kobeta ba nzembo ya O.K. Jazz avant la première dislocation.

Na nzembo, gestion ya mbongo ya Editions nde eyaki kobimisa matata. Franco, ayebaki que nzembo oyo ezali mbokela contre ye, ayembi yango mpe abeti guitare kitoko sans problème.

 «Balingaka ngai te», Franco Luambo, O.K. Jazz

Franco azongisaki eyano na Vicky na nzembo oyo. Na kati ayembisi mpe Vicky : «…mpo nasomba lopango, mpo nasala buvette…» ayembisi Vicky, ye nde asomba ndaku na Yolo mpe asala buvette wana. Azalaki na ndaku munene mpe kitoko na intersection ya ba avenues na Saio, na commune ya  Dendale (Kasa-Vubu).  « Naboya bango…Londo mpo atambolaki na mibali mibale » : African Jazz na Negros Succès. « Bomengo na ngai batikela ngai, mondele akende » Mondele wana nde firme Belge Fonior, oyo epesaki ye makoki mpo asala Editions Epanza Makita, bomengo na ngai, Franco.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo/mbokamosika.com

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *