CHANSON SOUVENIR : SOPHIE ELODIE FLEUR NENDAKA(commentée en lingala par Emmanuel Kandolo)

Victor Nebdaka « Papa Vicky », père de Sophie Elodie Ba ndeko,   Sophie Elodie Fleur Nendaka ezali nzembo Rochereau ayembeli muana ya suka ya tata Victor Nendaka na mama Adeline Astrid Mbooto. Rochereau ayembi nzembo oyo à l’occasion ya baptême ya Sophie Elodie Fleur Nendaka. Feti munene esalemaki na évènement oyo. Non seulement, Nendaka asengaki Rochereau ayembela muana nzembo, kasi atindaki ye na African fiesta le peuple, na Bruxelles, spécialement mpo na ko enregistrer nzembo oyo. Tokomeka kolobela itinéraire ya Sophie Elodie. Kasi, naboyi kokoma kombo na ye oyo ayebani na yango kuna na Dubaï tout comme lieu na date de naissance na ye. Sophie Elodie Fleur Nendaka (A.F.) abandi kelasi na Ecole élémentaire Félix Faure, na 15e arrondissement ya Paris, esika atangi kobanda na 1972 tee na 1979. Sima ya wana, akeyi kotanga na Collège Guillaume Apollinaire, toujours na 15e arrondissement ya Paris. Kuna, atangi mbula moko : 1978-1979. Na 1979, tata na ye atindi ye na Suisse, na Genève, ko continuer kelasi na Collège du Léman. Yango ezali Ecole internationale de prestige. Asilisi école secondaire na ye kuna na 1985. Na même année, asui inscription na Université de Genève. Asali deux ans ya études générales ya droit, kobanda 1985 tee na 1987. En suite, akoti na Webster University Geneva, na 1987. Na 1991, a décrocher Bachelor’s degree in International Economic Studies (licence) na Etudes internationales économiques. A continuer mpe na 1994, azui Master’s degree in Finance (Maîtrise na Finance), toujours na même université. Tango asilisi ba kelasi na ye, azui mosala na Citibank Private Bank in Switzerland, Geneva. Citibank ya Genève, na Suisse. Kobanda 1995 tee na 1999. Alongue kuna na ebonga ya Manager. Akoti na J.P. Morgan Private Bank Switzerland, Geneva. Asali kuna wuta 1999 tee na 2007. Responsable ya Service clientèle mpo na secteur ya Moyen-Orient. Asukisi na ebonga ya Vice-Présidente ya Département oyo. Na 2010, akeyi ko s’installer na libota na ye mobimba na Dubaï, na Emirats Arabes Unis. Kuna, azali kosala na M. Capital Partners J.L.T.  D.M.C.C., en tant que Manager. Alongue na fin 2014. Na début 2015, akoti na S. D.W.C-L.L.C., esika azali présentement Managing Director (Directeur général) Passionée ya Art, azali na certification (2021) ya Modern Art (art modern) ya Christie’s Education tout comme ya Introduction to Contemporary Art (Introduction na art contemporain) ya Sotheby’s Institute of Art. « Azali en quelque sorte mokitani ya Sindika Dokolo ». Sophie Elodi alobaka (parlé et écrit) parfaitement français na anglais mpe ayebi ko tenir conversation na espagnole, en plus ya lingala na swahili. Abala mundele mpe baboti bana misatu.   

Chanson Sophie Elodie

Patriotiquement, 

Emmanuel Kandolo

Laisser un commentaire

Votre adresse e-mail ne sera pas publiée. Les champs obligatoires sont indiqués avec *